Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 34 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word to Jeremiah from our Father when Nebuchadnezzar king of Babylon, all his army, and all the kingdoms he ruled and all the peoples fought against Jerusalem and all its cities: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango :
2 our Father of Israel says: Go, speak to Zedekiah king of Judah, tell him: our Father says: I am handing this city to Babylon's king; he will burn it with fire. « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto.
3 You will not escape his hand but will surely be captured and handed to him. Your eyes will see the king of Babylon's eyes, his mouth speaking to yours, and you will go to Babylon. Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.
4 Yet hear the word of your Father, Zedekiah, king of Judah: our Father says you won't die by the sword. Nzokande, Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, yoka Liloba na Yawe ! Tala elaka oyo Yawe apesi yo : Okokufa na mopanga te,
5 You will die in peace. As spices were burned for your fathers, the kings before you, so they will burn them for you and mourn you, 'Alas, lord!' I have spoken this, declares your Father. kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Oh mawa, nkolo na ngai ! ’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › »
6 Then Jeremiah the prophet spoke all these words to Zedekiah king of Judah in Jerusalem, Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi,
7 while Babylon's king's army attacked Jerusalem and all Judah's remaining cities—Lachish and Azekah, the last fortified cities left in Judah. wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te : Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda.
8 The word to Jeremiah from our Father after King Zedekiah made a covenant with all the people in Jerusalem, proclaiming freedom to them: Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi
9 each to free his Hebrew male and female slaves, so no one would enslave a fellow Judahite, his brother. mpo ete moto nyonso apesa bawumbu na ye bonsomi, bawumbu oyo bazali Ba-Ebre, bazala mibali to basi ; mpe mpo ete moto moko te akoba kokanga ndeko na ye, Moyuda, kati na bowumbu.
10 All officials and people who had entered the covenant obeyed, each freeing his male and female slaves, no longer holding them in bondage; they obeyed and freed them. Boye, bakambi nyonso mpe bato nyonso oyo basalaki boyokani yango bandimaki kokangola bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi mpe kopesa bango bonsomi, mpo ete bakoba lisusu te kokanga bango na bowumbu ; bandimaki, bakokisaki mpe bapesaki bawumbu na bango bonsomi.
11 Afterward they turned back and took back the male and female slaves they had freed, and forced them back into slavery. Kasi sima na tango, babongolaki makanisi na bango ; bakangaki lisusu na bowumbu mibali mpe basi oyo bango basilaki kopesa bonsomi, mpe bakomisaki bango lisusu bawumbu.
12 Then the word of our Father came to Jeremiah, saying: Boye, tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
13 This is what our Father of Israel says: "I myself made a covenant with your fathers the day I brought them out of the land of Egypt, out of the house of slavery, saying: « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki :
14 At seven years' end, each must free his Hebrew brother sold to you and serving six years; set him free. But your fathers did not listen or pay attention to me. ‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu ; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te.
15 You recently turned and did right in my eyes, each proclaiming freedom to his neighbor, making a covenant before me in the house that bears my name. Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai : moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai.
16 But you turned back and desecrated my name: each of you took back the male and female slaves you had freed to go freely, forcing them into slavery again." Kasi tala sik’oyo makambo bosali : bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai ; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi ; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino.
17 So our Father says: "You did not obey me by proclaiming freedom, each to his brother and neighbor. So I proclaim freedom for you—declares your Father—to the sword, plague, and famine; I will make you a horror to every kingdom of the earth. Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;
18 I will hand over the men who broke my covenant, failing to keep the terms they made before me—like the calf they cut in two and passed between the parts. nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango.
19 Judah's and Jerusalem's officials, the court officials, the priests, and all the land's people who passed between the calf's pieces. Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali,
20 I will hand them to their enemies, to those seeking their life. Their corpses will feed the birds of the sky and the animals of the earth. nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.
21 Zedekiah king of Judah and his officials I will hand to their enemies, to those seeking their lives, and to the army of Babylon's king that has withdrawn from you. Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino.
22 I am giving orders, declares your Father, to bring them back to this city; they will fight it, capture it, and burn it. And I will make Judah's cities a wasteland where no one lives." Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo : bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]