Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 33 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word of our Father came to Jeremiah a second time, while he was still held in the guard's courtyard: Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli :
2 So says our Father—maker of the earth, forming it to establish it—our Father is his name: « Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi :
3 Call to me, and I'll answer, and tell you great, hidden things you don't know. ‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›
4 For our Father of Israel says this about the houses of this city and the houses of Judah's kings, torn down to defend against siege ramps and the sword: Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna
5 They come to fight the Babylonians, only to fill these houses with corpses of the men I struck down in anger and wrath, for I hid my face from this city for all their evil. kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.
6 Look, I will bring this city healing and health; I will heal my people and reveal to them abundant, lasting peace and faithfulness. Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.
7 I will restore Judah's fortunes and Israel's fortunes, and rebuild them as at first. Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso.
8 I will purify them from all the guilt they sinned against me, and forgive all the guilt they sinned and rebelled against me. Nakopetola bango na masumu nyonso oyo basalaki liboso na Ngai. Nakolimbisa masumu nyonso ya botomboki oyo basalaki liboso na Ngai.
9 This city will be to me a name of joy, praise, and glory before all nations of earth who hear all the good I do for them. They will fear and tremble at all the good and peace I bring it. Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›
10 This is what our Father says: In this place you call ruined, without man or beast, in Judah's cities and Jerusalem's streets, lying desolate without man, without resident, without beast, there will be heard again. Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito :
11 The voice of joy and voice of gladness, voice of the bridegroom and voice of the bride, voice of those bringing thank offerings to our Father's house, saying, 'Give thanks to the Father of heaven's armies, for he is good; his covenant love endures forever.' For I will restore the land's fortunes as before, says our Father. ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.
12 This is what the Father of heaven's armies says: Again, in this ruined place—empty of people and animals—and in all its towns, shepherds will rest their flocks in pastures. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango.
13 In the hill country's towns, the Shephelah, the Negev, Benjamin's land, around Jerusalem, and Judah's towns, flocks will again pass under the hands of the one who counts them, says our Father. Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.
14 Look, the days are coming, declares our Father, when I will fulfill the good promise I made to the house of Israel and the house of Judah. ‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.
15 In those days and at that time I will make a righteous Branch sprout up for David, and he will administer justice and righteousness in the land. Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi ; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.
16 In those days Judah will be saved and Jerusalem will dwell in safety. And this is the name by which she will be called: 'Our Father is our righteousness.' Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, mpe Yelusalemi ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela yango : Yawe azali Bosembo na biso. ›
17 For our Father says: David will never lack a man seated on the throne of the house of Israel. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele ;
18 The Levitical priests will never lack a man before me offering burnt offerings, burning grain offerings, and making sacrifices, always. Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › »
19 The word of our Father came to Jeremiah: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
20 This is what our Father says: If you can break my covenant with day and my covenant with night, so that day and night no longer come at their appointed time, « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki bolongi kokata boyokani na Ngai elongo na moyi, mpe boyokani na Ngai elongo na butu, mpo ete moyi mpe butu ekoma lisusu te na tango na yango,
21 then my covenant with David my servant could break too—no son of his to reign on his throne—and my covenant with the Levitical priests who serve me. wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai.
22 As heaven's stars can't be counted, and sea's sand can't be measured, so I'll multiply David my servant's offspring and the Levites serving me. Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »
23 The word of our Father came to Jeremiah: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
24 Haven't you noticed what these people say: 'The two families our Father chose, he has rejected'? They despise my people, no longer a nation to them. « Boni ! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala ? Bazali koloba : ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo.
25 This is what our Father says: If I have not set my covenant with day and night and the fixed laws of heaven and earth, Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te,
26 then I would reject Jacob's offspring and my servant David's, refusing to take from his line rulers over Abraham's, Isaac's, and Jacob's offspring. But I will bring back their fortunes and show them compassion. wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]