Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 32 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word to Jeremiah from our Father in Zedekiah king of Judah's tenth year, Nebuchadnezzar's eighteenth. Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na bokonzi mpe Nabukodonozori akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi.
2 At that time Babylon's army was besieging Jerusalem, and the prophet Jeremiah was locked in the guard's courtyard at the king of Judah's palace. Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.
3 For Zedekiah king of Judah had imprisoned him, saying, "Why do you prophesy and say, 'This is what our Father says: Look, I am about to give this city into the hand of the king of Babylon, and he will capture it; Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba : « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango ;
4 "Zedekiah king of Judah will not escape the Babylonians; he will surely be handed to Babylon's king, speak with him mouth to mouth, and see him eye to eye. Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akolonga te kokima liboso ya bato ya Babiloni, kasi nakokaba ye solo na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akolobana na ye mpe akotalana na ye na elongi ;
5 He will take Zedekiah to Babylon, where he stays until I attend to him, declares our Father. Though you fight the Babylonians, you won't succeed.'" akomema Sedesiasi na Babiloni, akowumela kuna kino tango nakotala likambo na ye, elobi Yawe, soki bomeki kobundisa bato ya Babiloni, bokolonga te. › »
6 And Jeremiah said, "The word of our Father came to me: Jeremi alobaki : « Yawe alobaki na ngai :
7 Look, Hanamel son of Shallum, your uncle, comes to tell you: Buy my field at Anathoth, for the redemption right to buy it is yours." Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. ›
8 Then Hanamel my cousin came to me at the guard's court, as our Father had said, and told me, 'Buy my field at Anathoth in Benjamin, for the right of inheritance is yours, and yours the redemption; buy it.' Then I knew this was our Father's word. Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ;
9 So I bought the field at Anathoth from my cousin Hanamel, weighing out about seven ounces of silver. boye nasombaki elanga oyo ezali na Anatoti, na maboko ya Anameyeli, mwana mobali ya noko na ngai, mpe nafutaki ye mbongo ya bibende ya palata, zomi na sambo.
10 I signed the deed and sealed it, called in witnesses, and weighed the money on the scales. Nakomaki mokanda oyo nasombelaki elanga mpe nabetaki yango kashe ; namekaki kilo ya mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli, na emekelo kilo.
11 Then I took the sealed purchase deed, with its terms and conditions, and the open copy, Nakamataki mokanda oyo nasombelaki elanga, oyo nabetaki kashe, oyo kati na yango bakoma malako ya mibeko mpe mabongisi ; mpe nazwaki lisusu mokanda oyo babeta kashe te ;
12 I gave the purchase deed to Baruch son of Neriah, son of Mahseiah, before Hanamel my cousin, before the witnesses who signed it, and before all the Judeans sitting in the guard's court. mpe napesaki mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, na miso ya Anameyeli, mwana ya noko na ngai, mpe ya batatoli oyo batiaki mikoloto na bango kati na mokanda oyo nasombelaki elanga, mpe na miso ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na lopango ya bakengeli.
13 And in their presence I charged Baruch: Napesaki Baruki mitindo oyo na miso na bango nyonso :
14 "This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Take these deeds—the sealed deed of purchase and the open deed—and put them in a clay jar to last a long time. ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kamata mikanda oyo nasombelaki elanga, ezala oyo babeta kashe to oyo babeta kashe te ; tia yango kati na mbeki oyo basala na mabele ya bikeko mpo ete ebeba te.
15 For the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Houses, fields, and vineyards will again be bought in this land." Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. ›
16 After giving the deed of purchase to Baruch son of Neriah, I prayed to our Father: Sima na ngai kopesa mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, nabondelaki Yawe :
17 "Ah, Sovereign Father! You yourself made heaven and earth by your great power and by your outstretched arm; nothing is too hard for you. Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.
18 You show faithful love to thousands, but repay parents' guilt into their children's laps after them—O great, mighty Father, the Father of heaven's armies is his name. Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
19 Great in counsel, mighty in deed, your eyes open to all the ways of humankind, repaying each by his ways, by the fruit of his deeds. mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.
20 You performed signs and wonders in Egypt, and to this day in Israel and among mankind, making a name for yourself, as it is today. Osalaki bilembo minene mpe bikamwa kati na Ejipito mpe ozali kokoba kosala yango kino lelo kati na Isalaele mpe kati na bato nyonso, mpe osalaki ete Kombo na Yo ekende sango ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
21 You brought your people Israel from Egypt's land with signs, wonders, a strong hand, an outstretched arm, and great terror. Obimisaki bato na Yo, Isalaele, na Ejipito na nzela ya bilembo minene mpe bikamwa wana osalelaki nguya na Yo mpe osembolaki loboko na Yo ya nguya mpo na koyeisa somo kati na bato ya Ejipito.
22 You gave them this land you swore to their ancestors to give them—a land flowing with milk and honey. Opesaki bango mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa na batata na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi.
23 They entered and took it, but did not obey your voice or walk in your law; all you commanded them to do, they left undone. So you brought all this disaster on them. Bakotaki kati na yango mpe babotolaki yango ; kasi batosaki Yo te, basalelaki Mobeko na Yo te, basalaki te nyonso oyo otindaki bango. Yango wana omemelaki bango pasi oyo nyonso.
24 Siege ramps have reached the city to capture it; it's given to the Babylonians fighting against it, because of sword, famine, and plague. What you spoke has happened—you see it. Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.
25 Yet you, Sovereign Father, said, 'Buy the field for money, call witnesses'—though the city is given to the Babylonians." Mpe atako engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, Yo, Nkolo Yawe, olobi na ngai : ‹ Somba elanga na mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli. › »
26 Then the word of our Father came to Jeremiah: Bongo Yawe alobaki na Jeremi :
27 "I am the Father of all flesh. Is anything too hard for me? « Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana ?
28 So says our Father: I am handing this city to the Babylonians, to Nebuchadnezzar king of Babylon, and he will capture it. Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya bato ya Babiloni mpe ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo ete azwa yango.
29 The Babylonians attacking this city will come, burn it down with fire, and the houses where the people burned offerings to Baal and poured drink offerings to other gods on their roofs, provoking me to anger. Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.
30 "The people of Israel and Judah have done nothing but evil in my sight from their youth; Israel has done nothing but anger me with the work of their hands, declares our Father. Bana ya Isalaele mpe ya Yuda, wuta bolenge na bango, bazalaki kosala eloko mosusu te na miso na Ngai, soki kaka mabe te ; solo, bana ya Isalaele bazalaki kosala eloko mosusu te, soki kaka te kopesa Ngai kanda na nzela ya biloko oyo maboko na bango esalaki, elobi Yawe.
31 "This city has provoked my anger and wrath from the day it was built until now, so I will remove it from my sight, Wuta batonga engumba oyo kino na mokolo ya lelo, mosala na yango kaka kotumbola Ngai mpe kopesa Ngai kanda ; yango wana, nakolongola yango liboso na Ngai.
32 for all the evil the people of Israel and Judah did to anger me—they, their kings, officials, priests, prophets, the men of Judah, and Jerusalem's residents. Bato ya Isalaele mpe ya Yuda bapesaki Ngai kanda na nzela ya mabe nyonso oyo basalaki : ezala bango, bakonzi na bango, bakalaka na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi.
33 They turned their back to me, not their face. Though I taught them again and again, they refused to listen or accept correction. Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele.
34 They set up their detestable things in the house called by my name, to make it unclean. Batiaki kutu banzambe na bango ya bikeko kati na Ndako epai wapi babelaka Kombo na Ngai, mpe na bongo, bakomisaki yango mbindo.
35 They built Baal's high places in the Valley of Ben-Hinnom, sacrificing their sons and daughters to Molech—something I never commanded or imagined, that they'd do this detestable thing and make Judah sin." Bakomaki kotonga bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo na kobonza bana na bango ya mibali mpe ya basi epai ya Moloki ; ezali likambo oyo Ngai natikalaki kotinda bango te, mpe natikala kokanisa te ete bakoki kosala makambo ya nkele boye mpo na komemisa Yuda masumu.
36 "Now this is what our Father of Israel says about this city you say is handed to Babylon's king by sword, famine, and plague: Mpo na yango, tala sik’oyo liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na engumba oyo bino bozali koloba ete ekabami na maboko ya mokonzi ya Babiloni na nzela ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka :
37 "I will gather them from every land where I banished them in my anger, my rage, and great wrath, bring them back to this place, and let them live securely. ‹ Solo, nakosangisa bango wuta na mikili nyonso epai wapi nabenganaki bango tango natombokelaki bango, nakozongisa bango na esika oyo mpe nakovandisa bango na kimia.
38 They will be my children, and I will be their Father. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
39 I will give them one heart, one way, to fear me always—for their good and their children's after them. Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.
40 I will make an everlasting covenant with them, never turning from doing them good; I will put my fear in their hearts, so they never turn from me. Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.
41 I will rejoice over them, benefiting them, and truly plant them in this land, with all my heart and all my soul." Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›
42 For our Father says: "As I brought all this great disaster on this people, so I'll bring on them all the good I'm promising. Tala liloba oyo Yawe alobi : Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.
43 Fields will be bought in this land you call desolate, without man or beast, given to the Babylonians. Bato bakosomba lisusu bilanga kati na mokili oyo bino bozali koloba na tina na yango : ‹ Mokili oyo ebeba, etikala lisusu na bato mpe na banyama te ; pamba te ekabama na maboko ya bato ya Babiloni. ›
44 Fields will be bought with silver, deeds written, sealed, witnessed—in Benjamin's land, Jerusalem's surroundings, Judah's towns, the hill country, the lowland, the Negev—for I will bring them back from captivity, declares our Father." Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]