Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 31 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "At that time," declares our Father, "I will be the Father of all Israel's families, and they will be my children." « Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »
2 This is what our Father says: The people who survived the sword found grace in the wilderness; Israel went to find rest. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bato oyo bakobika na mopanga bakozwa ngolu kati na esobe ; boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »
3 From far away our Father appeared to me: "I have loved you with everlasting love; so I have drawn you to myself with faithful love." Yawe abimelaki biso na kala, alobaki : « Nalingaka bino na bolingo ya seko ; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
4 "Again I will build you, and you will be built, virgin Israel! Again you will take up your tambourines and go out in the dance of those who celebrate. Nakobongisa bino lisusu ; oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. Okolata lisusu mbunda na yo ya mike mpe okobina mabina ya esengo.
5 Again you will plant vineyards on the hills of Samaria; the planters will plant and enjoy the fruit." Okolona lisusu bilanga ya vino na bangomba ya Samari ; bato oyo bakolona yango bakosepela tango bakobuka mbuma na yango.
6 For there will be a day when the watchmen call out in the hill country of Ephraim: "Arise, and let us go up to Zion, to our Father!" Ekozala mokolo oyo bakengeli bakoganga na bangomba ya Efrayimi : ‹ Boya ! Tika ete tokende na Siona, epai na Yawe, Nzambe na biso ! › »
7 For this is what our Father says: Sing with joy for Jacob, shout for the greatest of nations; proclaim, praise, and say, 'Our Father, save your people, the remnant of Israel!' Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso ! Batatola, bosanzola mpe boloba : ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, bato ya Isalaele oyo batikali. ›
8 "See, I will bring them from the land of the north and gather them from the farthest parts of the earth—among them the blind and the lame, the pregnant woman and the one in labor. Together they will return here, a great company. Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.
9 With weeping they will come, and with pleas for mercy I will lead them; I will make them walk by streams of water, on a level path where they will not stumble, for I have become a father to Israel, and Ephraim is my firstborn." Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
10 Hear the word of our Father, nations, and declare it in the coastlands far away; say, "He who scattered Israel will gather him, and will keep him as a shepherd keeps his flock." Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, botatola yango na bisanga ya mosika ! Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele akosangisa bango mpe akobatela bango ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
11 For our Father has ransomed Jacob and redeemed him from a hand too strong for him. Mpo ete Yawe akokangola Jakobi mpe akobikisa bango na maboko ya bato oyo baleki bango na makasi.
12 They will come and sing aloud on the height of Zion, and they will be radiant over the goodness of our Father—over the grain, the new wine, and the oil, and over the young of the flock and the herd. Their life will be like a watered garden, and they will never be worn down by sorrow again. Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.
13 "Then the young women will rejoice in the dance, and the young men and the old together. I will turn their mourning into joy; I will comfort them and give them gladness in place of their sorrow. Bilenge basi bakobina na esengo elongo na bilenge mibali mpe mibange. Nakobongola matanga na bango na esengo, nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.
14 I will fill the priests with abundance, and my children will be satisfied with my goodness," declares our Father. Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe na mafuta ya bibwele, mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » elobi Yawe.
15 This is what our Father says: A voice is heard in Ramah—wailing and bitter weeping. Rachel weeps for her children; she refuses to be comforted for her children, because they are gone. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi : Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali mpe aboyi kobondisama, pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »
16 This is what our Father says: Hold your voice back from weeping, your eyes from tears, for your work has a reward, declares our Father; they will return from the enemy's land. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli, pamba te mosala na yo ezali na litomba, » elobi Yawe, « bana na yo ya mibali bakozonga wuta na mokili ya banguna.
17 "There is hope for your future, declares our Father, and your children will return to their own land. Elikya ezali mpo na bomoi na yo ya lobi, » elobi Yawe, « bana na yo bakozonga na mokili na bango.
18 I have surely heard Ephraim grieving: 'You disciplined me, and I was disciplined, like an untrained calf; bring me back so I can return, for you are my Father.' Nayoki kolelalela ya Efrayimi : ‹ Opesi ngai etumbu lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. Zongisa ngai, mpe nakozonga, pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai.
19 For after I turned away, I repented; after I was instructed, I struck my thigh. I was ashamed and humiliated, because I bore the disgrace of my youth. Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; sik’oyo nasili kososola, nazali kobeta tolo na pasi na motema. Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›
20 Is Ephraim my dear son? Is he my darling child? For as often as I speak against him, I still remember him. Therefore my heart is moved with compassion for him; I will surely have mercy on him," declares our Father. Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.
21 "Set up road markers for yourself; make yourself signposts. Fix your mind on the highway, the road you walked. Return, virgin Israel, return to your own cities. « Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo !
22 How long will you waver, faithless daughter? For I have created a new thing on the earth: a woman will surround a man." Oh elenge mwasi ya mobulu, kino tango nini okotika kotambola-tambola ? Yawe akosala likambo ya sika na mabele : mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »
23 This is what the Father of heaven's armies, the Father of Israel, says: When I restore their fortunes, they will again say this in Judah's land and its cities: 'Our Father bless you, home of righteousness, holy mountain!' Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! ›
24 Judah and all its cities will live there together—farmers and those who move with their flocks. Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele.
25 "For I will refresh the weary soul and fill every soul worn down by sorrow." Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »
26 At this I awoke and looked, and my sleep had been sweet to me. Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai ; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi.
27 "Days are coming, declares our Father, when I will sow the house of Israel and the house of Judah with the seed of man and of beast. « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda.
28 As I watched over them to uproot, tear down, overthrow, destroy, and bring harm, so I will watch over them to build and to plant," declares our Father. Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ;
29 "In those days they will no longer say: 'Fathers ate sour grapes, and their children's teeth are set on edge.'" « na mikolo wana, bato bakoloba lisusu te : ‹ Batata balie mbuma ya vino ya mobesu, mpe minu ya bana na bango ekomi ngayi. ›
30 "Each will die for his own sin. Whoever eats sour grapes, his own teeth will be set on edge." Na esika na yango, moto na moto akokufa mpo na masumu na ye moko ; moto nyonso oyo alie mbuma ya vino ya mobesu, minu na ye moko nde ekokoma ngayi.
31 "The days are coming, declares our Father, when I will make a new covenant with the house of Israel and the house of Judah. Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ;
32 It will not be like the covenant I made with their ancestors on the day I took them by the hand to bring them out of the land of Egypt—my covenant that they broke, though I was a husband to them," declares our Father. ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.
33 "But this is the covenant I will make with the house of Israel after those days, declares our Father: I will put my instruction within them, and I will write it on their hearts. I will be their Father, and they will be my children. « Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
34 No longer will anyone teach their neighbor or their brother, saying, 'Know our Father,' for they will all know me, from the least of them to the greatest, declares our Father. For I will forgive their wrongdoing, and I will remember their sin no more." Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
35 This is what our Father says, who gives the sun for light by day and the fixed order of the moon and stars for light by night, who stirs up the sea so its waves roar—the Father of heaven's armies is his name: Tala makambo oyo Yawe alobi, Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo, apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu, aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele, mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga :
36 "If this fixed order ever departs from before me, declares our Father, then the children of Israel would cease to be a nation before me forever." « Soki kaka bakoki solo kolongola malako oyo na miso na Ngai, » elobi Yawe, « wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo te na miso na ngai. »
37 This is what our Father says: If the heavens above could be measured and the foundations of the earth below explored, then I would reject all the children of Israel for all they have done, declares our Father. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.
38 "Days are coming, declares our Father, when the city is rebuilt for me, from the Tower of Hananel to the Corner Gate. « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir ;
39 The measuring line will extend farther, straight to the hill of Gareb, then turn toward Goah. bakotia singa ya batongi ndako longwa na esika wana kino na ngomba moke ya Garebi, mpe ekobaluka kino na Gowa.
40 The whole valley of dead bodies and ashes, and all the terraces to the Kidron Valley, to the corner of the Horse Gate on the east, will be holy to our Father—never again uprooted or torn down." Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]