Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 30 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word that came to Jeremiah from our Father: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
2 This is what our Father of Israel says: Write in a book all the words I have spoken to you. « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo.
3 Look—days are coming, declares our Father, when I will restore the fortunes of my people Israel and Judah, says our Father, and bring them back to the land I gave their ancestors, and they will possess it. Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »
4 These are the words our Father spoke concerning Israel and Judah: Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda :
5 This is what our Father says: "We heard a cry of terror—dread, no peace. « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.
6 Ask now and see: can a male give birth? Why then do I see every strong man with his hands on his sides like a woman in labor, and every face turned pale? Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?
7 How dreadful that day is! There is none like it. It is a time of distress for Jacob—yet out of it he will be saved. Mawa ! Ekozala penza mokolo ya somo ! Mokolo moko te ekokokana na yango ! Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi, kasi akobikisama na pasi yango.
8 On that day, declares the Father of heaven's armies, I will break the yoke from your neck and snap your bonds, and foreigners will no longer enslave him. Na mokolo wana, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango, nakokata basinga oyo bakangelaki bango mpe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya.
9 Instead they will serve our Father, and David their king, whom I will raise up for them. Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia mpo ete akamba bango.
10 So do not be afraid, Jacob my servant, declares our Father, and do not be dismayed, Israel; for look—I will save you from far away, and your children from the land of their captivity. Jacob will return to quiet and ease, and no one will make him afraid. Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
11 For I am with you to save you, declares our Father. Though I completely destroy all the nations among whom I scattered you, I will not completely destroy you. But I will discipline you with justice, and I will not leave you entirely unpunished." Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›
12 For this is what our Father says: "Your injury is incurable, your wound is severe. Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Pota na yo ekobika te mpe pasi na yo ekosila te.
13 There is no one to plead your case; for your wound there is no medicine, no healing for you. Moto akolobela yo akozala te, kisi ezali te mpo na pota na yo, lobiko ezali te mpo na yo.
14 All your lovers have forgotten you; they care nothing for you. For I have struck you as an enemy strikes, with the discipline of a cruel person, because your guilt is great and your sins are many. Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.
15 Why do you cry out over your injury? Your pain is incurable. Because your guilt is great and your sins are many, I have done these things to you. Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, mpe pasi na yo ezali kosila te ? Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, mpe masumu na yo eleki ebele.
16 Therefore all who devour you will be devoured, and all your foes—every one of them—will go into captivity; those who plunder you will be plundered, and all who prey on you I will hand over as prey." Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, bakosala bango mpe mabe ; banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ; bato oyo babotolaki yo biloko, bakobotola bango mpe biloko ; bato oyo banyokolaki yo, bakonyokola mpe bango.
17 For I will restore your health and heal your wounds, declares our Father, because they called you an outcast: "This is Zion—no one cares for her." Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; ›
18 This is what our Father says: "Look—I will restore the fortunes of Jacob's tents and have compassion on his homes; the city will be rebuilt on its mound, and the palace will stand where it belongs. tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala.
19 Out of them will come thanksgiving and the sounds of celebration. I will multiply them, and they will not be few; I will honor them, and they will not be small. Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele ; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te.
20 Their children will be as they were of old, and their assembly will be established before me, and I will punish all who oppress them. Bana na bango ya mibali bakozala lokola na tango ya kala, mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai ; nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bazali konyokola bango.
21 Their leader will be one of their own, and their ruler will come from among them. I will bring him near, and he will approach me—for who would otherwise dare to risk his life to approach me? declares our Father. Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › elobi Yawe.
22 And you will be my children, and I will be your Father." ‹ Boye, bokozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › »
23 Look—the storm of our Father! Wrath has gone out, a sweeping tempest; it will whirl down on the head of the wicked. Tala, mopepe ya Yawe etomboki, kanda makasi na Ye epeli, bakake ezali konguluma na likolo, mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe.
24 The burning anger of our Father will not turn back until he has carried out and fulfilled the purposes of his heart. In the days to come you will understand this. Kanda makasi ya Yawe ekozonga te kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye. Bokososola yango penza na mikolo ekoya.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]