Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the words of the letter Jeremiah the prophet sent from Jerusalem to the surviving elders of the exiles, the priests, the prophets, and all the people Nebuchadnezzar had exiled from Jerusalem to Babylon. Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.
2 After King Jeconiah, the queen mother, the court officials, the officials of Judah and Jerusalem, and the craftsmen and metalworkers left Jerusalem. Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.
3 He sent it by Elasah son of Shaphan and Gemariah son of Hilkiah, whom Zedekiah king of Judah sent to King Nebuchadnezzar in Babylon. It read: Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani ; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye :
4 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says to all the exiles I sent from Jerusalem to Babylon: Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi epai ya bato nyonso oyo namemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi :
5 "Build houses and live in them; plant gardens and eat their fruit. « Botonga bandako mpe bovanda kuna ; bolona banzete mpe bolia mbuma na yango ;
6 Marry; have sons and daughters. Find wives for your sons and give your daughters to husbands, so they bear sons and daughters. Increase there, don't dwindle. bobalana, bobota bana mibali mpe bana basi, bolukela bana na bino ya mibali basi mpe bobalisa bana na bino ya basi, mpo ete bango mpe babota bana mibali mpe bana basi. Bobotana kuna mpe bokoma ebele, mpe botika te ete motango na bino ekita.
7 Seek the welfare of the city where I exiled you, and pray to me for it, for in its welfare you find yours." Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu ; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. »
8 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Don't let your prophets and fortune-tellers among you deceive you; don't listen to the dreams they keep dreaming. Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.
9 They are prophesying lies to you in my name; I did not send them, declares your Father. Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai ; natindi bango te, » elobi Yawe.
10 For your Father says: When Babylon's seventy years are completed, I will come to you and fulfill for you my good promise to bring you back here. Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.
11 For I know the plans I have for you, declares your Father—plans for peace, not disaster, to give you a future and hope. Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
12 "Then you will call on me, come, and pray to me, and I will listen to you. Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino.
13 You will seek me and find me, when you search for me with all your heart. Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.
14 You will find me, declares your Father. I will restore your fortunes and gather you from all the nations and all the places I drove you, declares your Father, and bring you back where I exiled you from." Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
15 Because you have said, "Our Father has raised up prophets for us in Babylon," Solo, bokoki koloba : « Yawe abimisi basakoli kati na biso awa na Babiloni ! »
16 this is what your Father says about the king on David's throne, and about all the people in this city—your brothers who didn't go into exile with you, Kasi tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi oyo avandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, na tina na bavandi nyonso ya engumba oyo, mpe na tina na bandeko na bino oyo bakendeki te na bowumbu elongo na bino ;
17 this is what the Father of heaven's armies says: I am sending sword, famine, and plague against them, making them like rotten figs, too spoiled to eat. tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia.
18 I will pursue them with sword, famine, and plague, making them a horror to every kingdom of earth—a curse, desolation, scorn, and disgrace among all nations where I drove them, Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango.
19 because they did not listen to my words, declares your Father—sent again and again through my servants the prophets—but you would not listen, declares your Father. Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.
20 So you exiles, hear your Father's word—all I sent from Jerusalem to Babylon. Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi.
21 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says about Ahab son of Kolaiah and Zedekiah son of Maaseiah, who prophesy lies to you in my name: I will hand them to Nebuchadnezzar king of Babylon, who will strike them down before your eyes. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai : « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino.
22 From them all Judah's exiles in Babylon will take this curse: "May our Father make you like Zedekiah and Ahab, whom Babylon's king roasted in the fire," Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo : ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto ! ›
23 because they did disgraceful things in Israel: committing adultery with their neighbors' wives and speaking lies in my name, which I did not command them. I know, and I am witness, declares your Father. Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.
24 Say this to Shemaiah the Nehelamite: Yebisa Shemaya, moto ya Nekelami, maloba oyo :
25 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: In your name you sent letters to all the people in Jerusalem, to Zephaniah son of Maaseiah the priest, and to all the priests: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni :
26 "The LORD made you priest in place of Jehoiada the priest, officer in the house of the LORD over every madman who plays prophet, to put him in stocks and neck-iron." ‹ Yawe aponaki yo Nganga-Nzambe na esika ya Yeoyada mpo ete obatela Tempelo ya Yawe. Osengelaki kobwaka na boloko mpe kokanga bibende na makolo, bato pamba oyo bazali komimona lokola basakoli.
27 So why have you not rebuked Jeremiah of Anathoth, who poses as a prophet to you? Boye, mpo na nini opamelaki te mosakoli Jeremi, moto ya Anatoti, oyo azali komimona lokola mosakoli kati na bino ?
28 He sent to us in Babylon: "It will be long. Build houses and live in them; plant gardens and eat their fruit." Atindelaki biso sango oyo kati na Babiloni : Bowumbu na bino ekowumela tango molayi. Yango wana, botonga bandako mpe bovanda kuna, bolona bilanga mpe bolia mbuma na yango. › »
29 Zephaniah the priest read this letter aloud to Jeremiah the prophet. Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango.
30 Then the word of our Father came to Jeremiah: Boye, Yawe alobaki na Jeremi :
31 Send to all the exiles: Your Father says about Shemaiah the Nehelamite: Because Shemaiah prophesied to you, and I did not send him, and made you trust a lie, « Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,
32 so your Father says: I will punish Shemaiah the Nehelamite and his descendants. No one of his will live among this people, nor see the good I will do for my people, declares your Father, for he preached rebellion against me. tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]