Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 28 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 That year, early in Zedekiah king of Judah's reign, the fourth year, fifth month, the prophet Hananiah son of Azzur from Gibeon told me in the house of our Father, before the priests and all the people: Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso :
2 "The LORD of heaven's armies, Israel's God, says: I have broken the king of Babylon's yoke. « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni.
3 Within two years I'll bring back to this place all the LORD's house vessels Nebuchadnezzar king of Babylon took from here to Babylon. Etikali kaka mibu mibale ; nakozongisa na esika oyo bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azwaki na esika oyo mpe amemaki na Babiloni.
4 Jeconiah son of Jehoiakim, Judah's king, and all Judah's exiles taken to Babylon I will bring back here, declares the LORD, for I will break Babylon's king's yoke." Nakozongisa lisusu na esika oyo : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »
5 Jeremiah the prophet answered Hananiah the prophet before the priests and all the people standing in the house of our Father. Bongo Mosakoli Jeremi azongiselaki mosakoli Anania eyano na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso oyo batelemaki kati na Tempelo ya Yawe.
6 The prophet Jeremiah said: "Amen! May our Father do so. May he confirm the words you have prophesied, by bringing back the vessels of our Father's house and all the exiles from Babylon to this place. Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu !
7 But listen now to this word I am speaking to you and to all these people: Nzokande, yoka maloba oyo nalingi koloba na yo mpe na bato nyonso :
8 Prophets before us long ago prophesied war, disaster, and plague against many nations and great kingdoms. Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi ;
9 The prophet who prophesies peace proves truly sent by our Father only when his word comes true." kasi soki mosakoli asakoli kimia, akondimama ete azali solo mosakoli oyo Yawe atindi masakoli na ye ekokisami. »
10 Then Hananiah the prophet took the yoke-bar off the neck of Jeremiah the prophet and broke it, Bongo mosakoli Anania alongolaki ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi mpe abukaki yango.
11 Hananiah told all the people, "This is what the LORD says: So I will break the yoke of Nebuchadnezzar king of Babylon off every nation's neck within two years." Then Jeremiah the prophet left. Anania alobaki liboso ya bato nyonso : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › » Mpe mosakoli Jeremi akendeki na ye.
12 After Hananiah broke the yoke-bar off the prophet Jeremiah's neck, our Father's word came to Jeremiah: Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi :
13 "Go, tell Hananiah: our Father says: You broke wooden bars but will make iron ones. « Kende koloba na Anania : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, obuki ekangiseli ya banzete ; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende.
14 For this is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: I've put an iron yoke on all these nations' necks to serve Nebuchadnezzar king of Babylon, and they will. I've even given him the wild animals." Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasili kotia ekangiseli ya ebende na kingo ya bikolo nyonso mpo ete esalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe ekosalela ye solo. Nakopesa ye bokonzi ata likolo ya banyama ya zamba. › »
15 "Jeremiah the prophet said to Hananiah the prophet, 'Listen, Hananiah! Our Father did not send you; you have made this people trust a lie.' Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta !
16 So our Father says: I remove you from the earth this year; you die for preaching rebellion against our Father." Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »
17 And Hananiah the prophet died that same year, in the seventh month. Kaka na mobu wana, na sanza ya sambo, mosakoli Anania akufaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]