Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 21 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The word that came to Jeremiah from our Father when King Zedekiah sent him Pashhur son of Malchiah and Zephaniah the priest, son of Maaseiah: Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango mokonzi Sedesiasi atindelaki ye Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpo na koloba na ye :
2 "Please ask our Father for us, since Nebuchadnezzar king of Babylon attacks us. Perhaps our Father will deal with us by all his wonders, so that the enemy will withdraw from us." « Tuna Yawe sik’oyo mpo na biso, pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azali kobundisa biso ; tango mosusu Yawe akosala bikamwa mpo na biso ndenge asalaki na tango ya kala, mpo ete Nabukodonozori atika biso. »
3 Then Jeremiah said to them, "Tell Zedekiah this: Kasi Jeremi azongiselaki bango : « Boloba na Sedesiasi :
4 This is what the Father of Israel says: "I am about to turn back the weapons in your hands, used against the king of Babylon and the Babylonians besieging you outside the wall, and gather them into this city's heart. ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.
5 I myself will fight you with an outstretched hand and strong arm, in anger, rage, and great wrath. Mpe Ngai moko, nakosembola loboko na Ngai mpo na kobundisa bino na nguya, na kanda, na kosilika mpe na kotomboka makasi.
6 I will strike down this city's residents, people and animals alike; they will die in a great plague. Nakobebisa nyonso oyo ezali kati na engumba oyo : bato mpe banyama ; mpe bakokufa na bokono oyo ebomaka.
7 Afterward, declares our Father, I will hand Zedekiah king of Judah, his servants, and the people in this city who survive the plague, sword, and famine over to Nebuchadnezzar king of Babylon, their enemies who seek their lives. He will strike them with the sword—no pity, no sparing, no compassion." Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
8 Tell these people what our Father says: I set before you the way of life and the way of death. Mpe lisusu, loba na bato : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa.
9 Whoever stays in this city dies by sword, famine, and plague; whoever surrenders to the besieging Babylonians lives, keeping his life as spoil. Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. Kasi moto oyo akobima mpe akokende komipesa na maboko ya bato ya Babiloni oyo bazingeli bino, akobikisa bomoi na ye mpe akokufa te.
10 I set my face against this city for harm, not good, declares our Father. It will be handed to Babylon's king, who will burn it with fire. Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›
11 Say to the royal house of Judah: Listen to the word of our Father. Loba na libota ya mokonzi ya Yuda : ‹ Boyoka Liloba na Yawe !
12 House of David, our Father says: Judge justly each morning, free the robbed from their oppressor's hand, or my anger flares like fire, burning with no one to put it out, because of your evil deeds. Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.
13 Look, I am against you, you who dwell above the valley, you rock of the plain, declares our Father—you who say, "Who can come down against us? Who can enter our dwellings?" Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’
14 I will punish you as your deeds deserve, declares our Father. I will kindle a fire in her forest, and it will devour everything around her." Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, elobi Yawe, nakopelisa moto na zamba na yo, mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]