Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Pashhur son of Immer, priest and chief officer in our Father's house, heard Jeremiah prophesying these things. Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola.
2 Pashhur struck Jeremiah the prophet and put him in the stocks at the upper Gate of Benjamin, in our Father's house. Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.
3 Next day, Pashhur freed Jeremiah from the stocks. Jeremiah said, "Our Father hasn't named you Pashhur, but Magor-Missabib—Terror on Every Side. Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye : — Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe.
4 This is what our Father says: 'I will make you a terror to yourself and your friends. They will fall by their enemies' sword before your eyes. I will hand all Judah to Babylon's king; he will exile them to Babylon and strike them with the sword. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
5 I will give this city's wealth, goods, and valuables, and the treasures of Judah's kings to their enemies, who will plunder, take, and carry them to Babylon. Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.
6 You, Pashhur, and everyone in your house will go into captivity, come to Babylon, and die and be buried there—you and all your friends you prophesied lies to.'" Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »
7 You deceived me, my Father, and I was deceived; you overpowered me and prevailed. I have become a laughingstock all day long; everyone mocks me. Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza ; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.
8 Whenever I speak, I cry out, shouting, "Violence and destruction!" For the word of our Father has brought me mockery and contempt all day long. Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.
9 But if I say, "I will not mention him or speak any more in his name," then there is in my heart something like a burning fire locked in my bones. I am worn out holding it in, and I cannot. Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !
10 For I hear the whispering of many: "Terror on every side! Denounce him! Let us denounce him!" All my trusted friends watch for my fall: "Perhaps he will be deceived, and then we will prevail over him and take our revenge on him." Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »
11 But our Father is with me like a fearsome warrior; therefore my persecutors will stumble and not prevail. They will be utterly put to shame, for they have not succeeded; their everlasting dishonor will never be forgotten. Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.
12 O Father of heaven's armies, you who test the righteous and see the heart and the mind, let me see your justice against them, for I have committed my cause to you. Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo !
13 Sing to our Father! Praise our Father! For he has rescued the life of the needy from the clutches of evildoers. Boyembela Yawe ! Bokumisa Yawe ! Pamba te abikisaka bomoi ya mobola na maboko ya bato mabe.
14 May the day I was born be cursed! May the day my mother gave birth to me never be blessed. Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe ! Tika ete mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai epambolama te !
15 May that man who brought my father the news, "A son is born to you!" be cursed—making him very glad. Tika ete alakelama mabe, moto oyo amemelaki tata na ngai sango oyo esepelisaki motema na ye : « Baboteli yo mwana, mwana mobali ! »
16 Let that man be like the cities our Father overthrew without relenting. Let him hear an outcry in the morning and a battle alarm at noon, Tika ete moto yango akoma lokola bingumba oyo Yawe abuki na mawa te ! Tika ete ayoka bileli na tongo mpe makelele ya bitumba na midi.
17 because he did not kill me in the womb, so that my mother would have been my grave, her womb my resting place forever. Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te kati na libumu ya mama na ngai, oyo alingaki kozala kunda na ngai, mpe libumu na ye elingaki kobomba ngai libela na libela ?
18 Why did I ever come out of the womb to see trouble and sorrow, and to end my days in shame? Mpo na nini penza nabimaki na libumu ya mama na ngai ? Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ?
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]