Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father said: Go and buy a potter's clay flask, and take some of the elders of the people and some of the elders of the priests, Tala liloba oyo Yawe alobi : — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe ;
2 and go out to the Valley of Ben-Hinnom, which is at the entrance of the Potsherd Gate, and proclaim there the words that I speak to you. bimela na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, na liboso ya ekuke ya ndako epai wapi basalaka mbeki ; mpe kuna, okosakola maloba oyo nakoyebisa yo.
3 Say: Hear the word of our Father, kings of Judah and people of Jerusalem. This is what the Father of heaven's armies, the Father of Israel, says: Look, I am bringing such disaster on this place that the ears of all who hear will tingle. Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo.
4 Because they abandoned me and made this place foreign, burning incense here to other gods unknown to them, their ancestors, and Judah's kings, and because they filled this place with innocent blood. Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te,
5 They built Baal's high places to burn their sons in the fire as burnt offerings to Baal—which I never commanded or decreed, nor entered my mind. batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala ; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te ;
6 So look, the days are coming, declares our Father, when this place will no longer be called Topheth or the Valley of Ben-Hinnom, but the Valley of Slaughter. yango wana, na mikolo ekoya, elobi Yawe, bakobenga lisusu te esika oyo : ‹ Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, › kasi bakokoma kobenga yango : ‹ Lubwaku oyo babomelaka bato. ›
7 In this place I will pour out Judah and Jerusalem's plans, make them fall by the sword before their enemies, by the hand of those seeking their lives. I will give their corpses as food to the birds of the sky and beasts of the earth. Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba.
8 I will make this city a horror, a thing hissed at; all who pass by will be appalled and hiss at all its wounds. Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.
9 I will make them eat the flesh of their sons and daughters, each eating his neighbor's flesh during the siege and distress their enemies and those seeking their lives press on them. Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango.
10 Then you are to break the flask in front of the men who go with you, Boye, buka mbeki na miso ya bato oyo bozali kokende na bango nzela moko
11 and say to them: This is what the Father of heaven's armies says: In the same way I will break this people and this city, just as one breaks a potter's vessel so that it can never be mended again. And they will bury in Topheth because there is no other place to bury. mpe loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te.
12 This is what I will do to this place and its residents, declares our Father—making this city like Topheth. Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti.
13 Jerusalem's houses and the houses of Judah's kings will be made unclean like Topheth—every house on whose roof they burned incense to the whole army of heaven and poured out drink offerings to other gods. Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »
14 Jeremiah came from Topheth, where our Father sent him to prophesy, and stood in the court of our Father's house and told all the people: Jeremi azongaki wuta na Tofeti epai wapi Yawe atindaki ye mpo na kosakola, atelemaki na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe alobaki na bato nyonso :
15 This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: I am bringing on this city and all its towns every disaster I pronounced against it, because they stiffened their neck and refused to hear my words. — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]