Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father says: Go down to the house of Judah's king and speak this word there, Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo :
2 and say: Hear our Father's word, king of Judah, seated on the throne of David—you, your servants, your people entering these gates. ‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,
3 This is what our Father says: Do justice and right; rescue the robbed from the oppressor's hand. Wrong no foreigner, orphan, or widow, and do them no violence, and shed no innocent blood here. tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.
4 If you truly do this, kings on the throne of David will enter these gates, riding chariots and horses—the king, his servants, and his people. Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango.
5 But if you won't listen to these words, I swear by myself, declares our Father: this house becomes a ruin. Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › »
6 This is what our Father says about Judah's royal house: You are Gilead to me, Lebanon's peak—yet I will make you a desert, cities where no one lives. Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda : « Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai, lokola songe ya ngomba ya Libani ; solo, nakokomisa yo lokola esobe, lokola engumba oyo bato bavandaka te.
7 I will set apart destroyers against you, each with his weapons; they will cut down your choicest cedars and throw them into the fire. Nakotinda bato ete baya kobebisa yo, moto na moto na bibundeli na ye ; bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko mpe bakobwaka yango na moto.
8 Many nations will pass this city and ask each other, "Why has the LORD done this to this great city?" Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? ›
9 They'll answer, "Because they abandoned their Father's covenant, worshiped other gods, and served them." Mpe eyano ekozala : ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › »
10 Do not weep for the dead or mourn for him; weep bitterly instead for the one who is going away, for he will never return to see the land of his birth. Bolela te mpo na kufa ya mokonzi to bosala matanga te mpo na kufa na ye ! Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, mpo ete akozonga lisusu te mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.
11 This is what our Father says about Shallum son of Josiah, king of Judah, who succeeded his father as king and has left this place: He will never return. Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te.
12 He will die where they took him captive and never see this land again. Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. »
13 Woe to him who builds his house by unrighteousness and his upper rooms by injustice, who makes his neighbor work for nothing and does not give him his wages, « Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya bosembo te, mpe bashambre na ye ya etaje, na nzela ya lokuta ; oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba mpe afutaka bango eloko te ;
14 who says, "I will build myself a vast house with spacious upper rooms," and cuts out wide windows for it, panels it with cedar, and paints it bright red. oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene oyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! › Boye atiaka yango maninisa minene, mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati mpe akopakolaka yango langi ya motane.
15 Do you reign because you outdo others with cedar? Your father ate and drank, yet he did justice and righteousness, and then it went well with him. Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele nde ekolendisa bokonzi na yo ? Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te, kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ; boye alongaki na makambo nyonso.
16 He defended the cause of the poor and needy, and so it went well. Is this not what it means to know me? declares our Father. Alongisaki babola mpe bato bakelela, mpe alongaki na makambo nyonso. Boni, yango te koyeba Ngai, » elobi Yawe ?
17 But your eyes and your heart are set only on your dishonest gain, on shedding innocent blood, and on practicing oppression and violence. « Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »
18 So our Father says about Jehoiakim son of Josiah, king of Judah: No one will mourn him: "Oh, my brother!" or "Oh, my sister!" No one will mourn him: "Oh, lord!" or "Oh, his majesty!" Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : « Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › Bakosalela ye matanga te na koloba : ‹ Mawa, nkolo na ngai ! Mawa, mokonzi na ngai ! ›
19 He will be buried with a donkey's burial—dragged off and thrown out beyond the gates of Jerusalem. Bakokunda ye ndenge bakundaka ane, bakobenda ye mpe bakobwaka ye libanda ya bikuke ya Yelusalemi. »
20 Go up to Lebanon and cry out; raise your voice in Bashan; cry out from Abarim, for all your lovers are crushed. « Mata na Libani mpe ganga makasi ! Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani ! Ganga wuta na Abarimi, pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa !
21 I spoke to you in your times of ease, but you said, "I will not listen." This has been your way since your youth—you have not obeyed my voice. Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia kasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! › Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo, otosaka na yo Ngai te !
22 "The wind will shepherd away all your shepherds, and your lovers will go into captivity; then you will be ashamed and humiliated because of all your wickedness. Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. Okoyoka soni mpe okosambwa likolo ya mabe na yo nyonso.
23 You who dwell in Lebanon, nested among the cedars, how you will groan when labor pains come upon you, anguish like a woman giving birth!" Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !
24 As I live, declares our Father, even if Coniah son of Jehoiakim, king of Judah, were a signet ring on my right hand, I would tear you off. Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.
25 "I will hand you to those seeking your life, those you dread—Nebuchadnezzar king of Babylon and the Babylonians. Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni.
26 I will hurl you and your mother who bore you into another land, where neither was born—there you will die. Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa.
27 As for the land they long to return to, they will never return there." Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »
28 Is this man Coniah a despised, shattered pot, a vessel no one wants? Why are he and his children hurled out and cast into a land they do not know? Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ? Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ?
29 Land, land, land, hear the word of our Father! Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai ! Yoka Liloba na Yawe !
30 This is what our Father says: Record this man as childless, a man who will not prosper in his lifetime; for none of his offspring will prosper, none will sit on the throne of David or rule again in Judah. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]