Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 23 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Woe to the shepherds who destroy and scatter the sheep of my pasture!' declares our Father. « Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe.
2 So our Father of Israel says about the shepherds tending my people: 'You have scattered my flock and driven them away, and not cared for them. Now I will hold you accountable for the evil you have done, declares our Father. Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,
3 Then I will gather the remnant of my flock from all the lands where I drove them, bring them back to their pasture, and they will be fruitful and multiply. « Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele.
4 I will raise up shepherds over them who will tend them; they will fear no more nor be dismayed, none will go missing, declares our Father. Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe.
5 Look, the days are coming, declares our Father, when I will raise up for David a righteous Branch, and he will reign as king and act wisely, and he will administer justice and righteousness in the land. « Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, mokonzi oyo akokamba na bwanya, oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo.
6 In his days Judah will be saved, and Israel will dwell securely. And this is the name by which he will be called: The Lord Our Righteousness.' Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.
7 "So the days are coming, declares our Father, when they will no longer say, 'As surely as your Father lives, who brought the people of Israel up out of Egypt,' Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; ›
8 but instead, 'As surely as your Father lives, who brought up and led back the descendants of the house of Israel from the land of the north and all the lands where he had driven them.' Then they will live on their own soil." kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »
9 About the prophets: My heart is broken; all my bones tremble. I am like a drunk man, like one overcome by wine, because of our Father and his holy words. Na tina na basakoli : Motema na ngai ebukani kati na ngai, mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga. Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga, lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye, likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule.
10 For the land is full of adulterers; because of the curse the land mourns, and the pastures of the wilderness are dried up. Their ways are evil, and they abuse their power. Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.
11 "Both prophet and priest are godless; even in my house I have found their evil, declares our Father. « Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe ; ezala kati na Tempelo na Ngai, nazali komona misala na bango ya mabe, » elobi Yawe.
12 Therefore their way will become to them like slippery paths in the darkness, into which they will be driven and fall; for I will bring disaster upon them in the year of their punishment, declares our Father. « Yango wana, nzela na bango ekokoma moselu mpe molili ; bakobengana bango kino na mboka ya molili mpe kuna bakokweya. Nakotindela bango pasi, tango oyo nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
13 In the prophets of Samaria I saw a repulsive thing: they prophesied by Baal and led my people Israel astray. « Namoni makambo ya nkele kati na basakoli ya Samari : bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela.
14 Yet among Jerusalem's prophets I have seen something appalling: they commit adultery, they live by lies, they back the hands of evildoers, so no one turns from his evil. They have all become to me like Sodom, its people like Gomorrah.' Namoni lisusu makambo ya nkele kati na basakoli ya Yelusalemi : bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe mpo ete batika te misala na bango ya mabe. Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. »
15 So this is what the Father of heaven's armies says about the prophets: I will feed them bitter food and give them poisoned water, for godlessness has spread through the whole land from Jerusalem's prophets.' Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli : « Nakoleisa bango bilei ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. »
16 This is what the Father of heaven's armies says: Do not listen to the prophets prophesying to you; they fill you with false hope, speaking visions from their own minds, not from my mouth. Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino !
17 They keep saying to those who despise my word, 'You will have peace,' and to everyone who stubbornly follows his own heart they say, 'No disaster will come upon you.'" Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai : ‹ Yawe alobi : Bokozala malamu ! › Mpe na bato oyo balandaka makanisi mabe ya mitema na bango : ‹ Mabe moko te ekokomela bino ! ›
18 For who among them has stood in the council of our Father to see and to hear his word? Who has paid attention to his word and listened? Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe ? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye ?
19 Look, the storm of our Father has gone out in wrath, a whirling tempest; it will burst upon the heads of the wicked. Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! Kanda na Ye epeli lokola moto, bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe.
20 The anger of our Father will not relent until he has fully carried out the purposes of his heart. In the days to come you will understand it clearly. Kanda ya Yawe ekokita te kino ekokokisa malamu-malamu penza mabongisi ya motema na Ye ! Bokozwa mayele ya kososola yango malamu na mikolo oyo ekoya.
21 "I did not send these prophets, yet they ran; I did not speak to them, yet they prophesied. Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola !
22 But if they had stood in my council, they would have proclaimed my words to my people and turned them back from their evil way and from the evil of their deeds. Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, mpe bato na Ngai balingaki kotika banzela mpe misala na bango ya mabe !
23 Am I your Father only nearby, declares our Father, and not your Father far away as well? Boni, bokanisi ete Ngai Nzambe namonaka kaka pene, kasi namonaka mosika te ? » elobi Yawe.
24 Can anyone hide in secret places where I cannot see him? declares our Father. Do I not fill heaven and earth? declares our Father.' « Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.
25 "I've heard the prophets who prophesy lies in my name, claiming, 'I dreamed! I dreamed!' « Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! ›
26 How long will lies fill the hearts of prophets who prophesy the deceit of their own hearts? Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango ?
27 They plan to make my people forget my name through the dreams they tell each other, as their ancestors forgot my name for Baal. Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ?
28 Let the prophet with a dream tell it, but let the one with my word speak my word faithfully. What is straw to wheat? declares our Father. Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ;
29 Is not my word like fire, declares our Father, and like a hammer that shatters rock?' « boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe.
30 "Therefore, look, I am against the prophets, declares our Father, who steal my words from one another. « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe ;
31 Look, I am against the prophets, declares our Father, who wag their tongues yet declare, 'God has spoken.' « solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe,
32 I am against those who prophesy lying dreams, declares our Father; they tell them and mislead my people with their lies and reckless boasting. I did not send or command them, and they do this people no good at all, declares our Father.' « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe.
33 "When this people, a prophet, or a priest asks, 'What is our Father's burden?' say to them, 'You are the burden! I will cast you off, declares our Father.' « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? › Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. ›
34 The prophet, priest, or person who says, 'The burden of our Father,' I will punish that man and his household. Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu.
35 Each of you is to say to his neighbor and brother: 'What has our Father answered?' or 'What has our Father spoken?' Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye : ‹ Eyano nini Yawe apesi ? Yawe alobi nini ? ›
36 But never again say 'the burden of our Father,' for each man's own word becomes his burden; you have twisted the words of the living Father of heaven's armies.' Kasi bosengeli lisusu te koloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso !
37 Say this to the prophet: 'What has our Father answered you?' or 'What has our Father spoken?' Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana : ‹ Eyano nini Yawe apesi yo ? › to ‹ Yawe alobi nini ? ›
38 But if you say, 'The burden of our Father,' then our Father says: Because you spoke these words, 'The burden of our Father,' though I sent word telling you, 'Do not say, The burden of our Father, Nzokande, soki bolobi lisusu : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola bosalelaka maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino : ‹ Boloba te : Tala liloba oyo Yawe alobi ! ›
39 so look, I will surely lift you up like a burden and throw you away from my presence—you and the city I gave you and your ancestors. mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ;
40 And I will bring on you everlasting disgrace and lasting shame that will never be forgotten.'" nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]