Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 All Israel's community left the Wilderness of Sin, journeying stage by stage as our Father commanded, and camped at Rephidim—but there was no water for the people to drink. Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.
2 The people argued with Moses: "Give us water to drink." Moses replied, "Why argue with me? Why test our Father?" Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : — Pesa biso mayi ya komela ! Moyize azongiselaki bango : — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ?
3 The people were thirsty there for water and grumbled against Moses, saying, "Why did you bring us up from Egypt to kill us and our children and our livestock with thirst?" Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki : — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ?
4 Moses cried out to our Father, "What should I do with this people? They're about to stone me." Moyize abelelaki Yawe : — Nasala nini mpo na bato oyo ? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga !
5 Our Father said to Moses, "Go ahead of the people. Take some elders of Israel with you, and take in your hand the staff you struck the Nile with, then go. Yawe azongiselaki Moyize : — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende.
6 I will stand there before you on the rock at Horeb. Strike the rock, and water will come out of it for the people to drink." Moses did so as Israel's elders watched. Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.
7 He named the place Massah and Meribah, because the people of Israel quarreled and tested our Father, asking, "Is our Father among us or not?" Abengaki esika yango Masa mpe Meriba, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? »
8 Then Amalek came and fought against Israel at Rephidim. Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.
9 Moses said to Joshua, "Choose men for us, and go out to fight Amalek. Tomorrow I will stand on the hilltop with our Father's staff in my hand." Moyize alobaki na Jozue : — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.
10 Joshua did as Moses said and fought Amalek; Moses, Aaron, and Hur went up to the hilltop. Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba.
11 Now whenever Moses held up his hand, Israel prevailed; but whenever he lowered his hand, Amalek prevailed. Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga.
12 Moses' hands grew heavy, so they set a stone under him and he sat on it, while Aaron and Hur supported his hands, one on each side, so they stayed steady until sunset. Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa.
13 And Joshua overwhelmed Amalek and his people with the edge of the sword. Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.
14 Our Father told Moses, "Write this in a book as a reminder, and recite it aloud to Joshua: I will completely erase Amalek's memory from under heaven." Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
15 Moses built an altar and named it "Our Father Is My Banner," Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. »
16 and he said, "For a hand is on the throne of our Father: He will war against Amalek generation after generation." Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]