Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 16 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The whole Israelite community set out from Elim and came to the wilderness of Sin, between Elim and Sinai, on the fifteenth day of the second month after leaving the land of Egypt. Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito.
2 And the whole congregation of the people of Israel grumbled against Moses and Aaron in the wilderness. Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe.
3 The Israelites said to them, "If only we had died by our Father's hand in Egypt, sitting by pots of meat, eating bread to the full! For you brought us into this wilderness to kill this whole assembly with hunger." Bana ya Isalaele balobaki na bango : — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala !
4 Then our Father said to Moses, "Look, I will rain bread from heaven for you. Each day the people must go out and gather that day's portion, so I can test them—will they follow my instruction or not? Yawe alobaki na Moyize : — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai.
5 On the sixth day, they will prepare what they bring in—twice what they gather daily." Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango.
6 Moses and Aaron told all Israel's people, "At evening you will know it was our Father who brought you out of the land of Egypt, Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele : — Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito.
7 in the morning you'll see the glory of our Father—he's heard your grumbling against him. What are we, that you grumble against us?" Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ?
8 Moses said, "When our Father gives you meat to eat in the evening and all the bread you want in the morning, since he heard your grumbling against him—what are we? Your grumbling isn't against us, but against our Father." Moyize alobaki lisusu : — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe.
9 Moses told Aaron, "Tell all Israel's community, 'Come near before our Father—he's heard your grumbling.'" Boye Moyize alobaki na Aron : — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango.
10 Aaron spoke to all Israel's people; they looked toward the wilderness, and our Father's glory appeared in the cloud. Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.
11 And our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
12 "I have heard Israel's grumbling. Tell them: At twilight you will eat meat; in the morning you will be filled with bread. Then you will know I am your Father." — Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. »
13 That evening quail came and covered the camp; in the morning a layer of dew lay around it. Kaka na pokwa wana, bakayi eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.
14 When the layer of dew lifted, fine flakes, fine as frost, covered the wilderness surface. Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.
15 Seeing it, the Israelites asked each other, "What is this?"—not knowing what it was. Moses said, "This is the bread our Father has given you to eat." Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango : — Oyo nini ? Pamba te bayebaki te soki ezali nini. Moyize alobaki na bango : — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.
16 This is what our Father has commanded: "Gather what each person can eat, about two quarts per head, for everyone in your tent." Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo : « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. »
17 And the people of Israel did so. They gathered, some more, some less. Bato ya Isalaele basalaki bongo : bamoko balokotaki moke ; mpe bamosusu, ebele.
18 But when measured by the two-quart measure, whoever gathered much had no surplus, and whoever gathered little had no shortage—each gathered exactly what he could eat. Mpe bamekaki na omeri : moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia.
19 And Moses said to them, "Let no one leave any of it over until the morning." Moyize ayebisaki bango : — Moko te abomba ata moke kino na tongo.
20 They didn't listen to Moses—some left part until morning; it bred worms and stank. Moses was angry with them. Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango.
21 Morning by morning they gathered it, each according to his eating; when the sun grew hot, it melted. Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia.
22 On the sixth day they gathered double the bread, about four quarts each, and all the leaders of the community came and told Moses. Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko : omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize.
23 He told them, "This is what our Father said: Tomorrow is a solemn rest, a holy Sabbath to your Father. Bake what you'll bake, boil what you'll boil, and keep whatever's left until morning." Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »
24 So they set it aside until morning, as Moses commanded, and it did not stink or breed worms. Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki ; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango.
25 Moses said, "Eat it today; today is a Sabbath to our Father; today you won't find it in the field. Moyize ayebisaki bango : — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda.
26 Six days you are to gather it, but on the seventh day, the Sabbath, there will be none." Bokobanda kolokota yango mikolo motoba ; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te.
27 On the seventh day some of the people went out to gather, but they found none. Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te.
28 And our Father said to Moses, "How long will you refuse to keep my commandments and my instructions? Boye Yawe alobaki na Moyize : — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ?
29 See, I have given you the Sabbath; so on the sixth day I give you two days' bread. Everyone, stay in your place; no one may leave your place on the seventh day." Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye ; moko te abima na libanda.
30 So the people rested on the seventh day. Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo.
31 The house of Israel named it "manna"; it was like coriander seed, white, and tasted like honey wafers. Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.
32 Moses said, "This is what our Father commanded: 'Keep about two quarts of it for your generations, so they may see the bread I fed you in the wilderness when I brought you out of the land of Egypt.'" Moyize alobaki : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. »
33 Moses told Aaron, "Take a jar, fill it with about two quarts of manna, and set it before our Father, kept through your generations." Boye Moyize alobi na Aron : — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.
34 As our Father commanded Moses, so Aaron placed it before the testimony to be kept. Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu.
35 The Israelites ate manna forty years, until they reached a settled land. They ate manna until they reached the border of the land of Canaan. Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana.
36 (An omer holds about two quarts—one-tenth of an ephah.). Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]