Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Moses and the Israelites sang this song to our Father: I will sing to our Father, for he has triumphed gloriously; the horse and its rider he hurled into the sea. Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.
2 Our Father is my strength and my song, and he has become my salvation; this is my Father, and I will praise him, the God of my father, and I will exalt him. Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.
3 Our Father is a warrior; our Father is his name. Yawe azali elombe ya bitumba ; Kombo na Ye ezali Yawe.
4 Pharaoh's chariots and his army he cast into the sea, and his chosen officers were drowned in the Red Sea. Azindisi na ebale monene, bashar mpe mampinga ya Faraon ; abwaki na ebale monene ya barozo, bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema.
5 The deep waters covered them; they went down into the depths like a stone. Mozindo ya mayi ezipi bango, bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga.
6 Your right hand, our Father, is majestic in power; your right hand, our Father, shatters the enemy. Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, emonisi nguya na Yo ; loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, enyati monguna.
7 In the greatness of your majesty you overthrow those who rise against you; you send out your burning anger; it consumes them like stubble. Na monene ya nguya na Yo, obebisi batelemeli na Yo ; na kanda na Yo, otombokeli bango, mpe baziki lokola matiti.
8 At the blast of your nostrils the waters piled up; the flowing waters stood up in a heap; the deep waters solidified in the heart of the sea. Na pema ya zolo na Yo, mayi ekabwani, bambonge etelemi lokola mir, mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene.
9 The enemy said, "I will pursue, I will overtake, I will divide the spoil; I will have my fill of them. I will draw my sword; my hand is to destroy them." Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »
10 You blew with your wind; the sea covered them; they sank like lead in the mighty waters. Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, mpe ebale monene ezipi bango. Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi.
11 Who is like you among the gods, our Father? Who is like you, majestic in holiness, awesome in glorious deeds, doing wonders? Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, somo, mpe abongi na lokumu, mpe asalaka makambo ya kokamwa ?
12 You stretched out your right hand; the earth swallowed them. Osembolaki loboko na Yo ya mobali, mpe mabele emeli bango.
13 In your covenant love you have led the people whom you have redeemed; you have guided them by your strength to your holy dwelling. Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.
14 The peoples have heard; they tremble; anguish has seized the people of Philistia. Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, somo ekangaki bato ya Filisitia.
15 Now the chiefs of Edom are dismayed; trembling seizes the leaders of Moab; all the inhabitants of Canaan have melted away. Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.
16 Terror and dread fall upon them; because of the greatness of your arm they are still as a stone, till your people pass by, our Father, till the people pass by whom you have purchased. Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.
17 You will bring them in and plant them on the mountain of your inheritance, the place, our Father, that you have made for your dwelling, the sanctuary, Sovereign Father, that your hands have established. Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.
18 Our Father will reign forever and ever. Yawe akotikala mokonzi libela na libela !
19 When Pharaoh's horses, chariots, and horsemen went into the sea, our Father brought the sea's waters back over them—but Israel walked through the sea on dry ground. Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe.
20 Miriam the prophet, Aaron's sister, took a tambourine in her hand, and all the women followed her with tambourines, dancing. Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.
21 Miriam sang to them: "Sing to our Father—he has won gloriously; horse and rider he hurled into the sea." Miriami ayembaki elongo na bango : « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »
22 Moses led Israel from the Red Sea into the wilderness of Shur; three days they traveled in that wilderness without finding water. Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te.
23 They came to Marah but couldn't drink the water—it was bitter. So it was named Marah. Tango bakomaki na Mara epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara.
24 And the people grumbled against Moses, saying, "What should we drink?" Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »
25 He cried to our Father, who showed him a piece of wood; he threw it into the water, and it turned sweet. There our Father set them a statute and rule, and tested them there. Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango.
26 He said, "If you truly listen to the voice of your Father, do right in his eyes, heed his commands, and keep all his statutes, I will put none of the diseases on you that I put on Egypt, for I am your Father who heals you." Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. »
27 They came to Elim, where twelve springs of water and seventy palm trees stood, and they camped there beside the water. Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]