Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 14 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
2 "Tell the Israelites to turn back, camp before Pi-hahiroth, between Migdol and the sea, before Baal-zephon—camp by the sea, opposite it. « Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene.
3 For Pharaoh will say of the Israelites: 'They are lost in the land; the wilderness shuts them in.' Faraon akokanisa ete bana ya Isalaele babungi na mokili, esobe ekangi bango.
4 I will harden Pharaoh's heart, and he will chase them; I will gain glory through Pharaoh and his whole army, and Egypt will know I am the Father." And they did so. Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.
5 Told Egypt's king the people had fled, Pharaoh and his officials turned against them: "What have we done, letting Israel go from serving us?" Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki : « Likambo nini oyo tosali ? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso ! »
6 So he harnessed his chariot and took his people with him. Boye Faraon azwaki shar oyo ezalaki ya kobombama mpe azwaki mampinga na ye elongo na ye.
7 He took 600 chosen chariots, all the other chariots of Egypt, with officers over all of them. Akamataki bashar nkama motoba oyo eleki malamu elongo na bashar nyonso ya Ejipito ; shar moko na moko ezalaki na basoda misato.
8 Our Father hardened Pharaoh king of Egypt's heart, so he chased the Israelites marching out boldly. Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso.
9 Egypt pursued and overtook them camped by the sea—all Pharaoh's horses, chariots, horsemen, and army—near Pi-hahiroth, facing Baal-zephon. Bato ya Ejipito, bampunda nyonso ya Faraon mpe shar mosusu ya Faraon elongo na bato oyo batambolisaka yango mpe mampinga mosusu ya Faraon balandaki bana ya Isalaele mpe bazwaki bango tango batongaki molako na bango pembeni ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni.
10 As Pharaoh neared, Israel looked up and saw Egyptians closing in behind them. Terrified, they cried to our Father. Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe.
11 They told Moses, "Had Egypt no graves, that you took us to die in the wilderness? What have you done to us, bringing us out of Egypt? Balobaki na Moyize : — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe ? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito ?
12 Didn't we tell you in Egypt: 'Stop bothering us, let us serve the Egyptians'? Serving them beats dying in the wilderness." Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito : « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito ? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe.
13 Moses said to the people, "Don't be afraid. Stand firm and see our Father save you today; for the Egyptians you see today, you'll never see again, ever. Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te.
14 Our Father will fight for you; you need only to be still." Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.
15 Then our Father said to Moses, "Why cry out to me? Tell the Israelites to move forward. Yawe alobaki na Moyize : — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai ? Loba na bana ya Isalaele ete batambola.
16 Lift your staff, stretch your hand over the sea and split it; let the Israelites cross the sea's midst on dry ground. Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka.
17 I am hardening Egypt's heart, so they follow them in; I will gain glory through Pharaoh, his whole army, his chariots and his horsemen. Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
18 Egyptians will know I am the Father when I gain glory over Pharaoh, his chariots, and horsemen." Bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon, bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.
19 The messenger of our Father, who went ahead of Israel's camp, moved behind them; the pillar of cloud moved from before them and stood behind them. Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango.
20 It came between Egypt's camp and Israel's camp—cloud and darkness, yet it lit the night—and neither came near the other all night. Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu ; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele.
21 Moses stretched his hand over the sea. All night our Father drove it back with a strong east wind, making it dry land. The waters split. Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene.
22 The Israelites walked through the middle of the sea on dry ground, the waters a wall to them, right and left. Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
23 The Egyptians chased them into the middle of the sea—all Pharaoh's horses, his chariots, and his horsemen. Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene : bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda.
24 Just before dawn, our Father looked down on the Egyptian army through the pillar of fire and cloud, throwing the Egyptian army into panic. Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango.
25 He clogged their chariot wheels so they drove with difficulty. The Egyptians said, "Let's flee Israel—God fights for them against Egypt!" Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.
26 Then our Father said to Moses, "Stretch your hand over the sea so the waters return over the Egyptians, over their chariots, over their horsemen." Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpo ete mayi ezonga mpe ekweyela bato ya Ejipito, bashar na bango mpe batambolisi ya bampunda.
27 Moses stretched his hand over the sea; by daybreak it returned to full depth. The Egyptians fled toward it, and our Father flung the Egyptians into the sea's midst. Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene, mpe liboso ete tongo etana, ebale monene ezongaki na esika na yango mpe bato ya Ejipito oyo balukaki kokima, bakutanaki na mayi liboso na bango. Boye Yawe azindisaki bango kati na ebale monene.
28 The water returned and covered chariots and horsemen, all Pharaoh's army that chased them into the sea. None survived. Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki.
29 The Israelites walked through the sea's middle on dry ground, waters a wall on their right and left. Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
30 That day our Father saved Israel from Egypt's hand, and Israel saw Egyptians dead on the seashore. Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene.
31 Israel saw the great power our Father used against Egypt; they feared him, and trusted him and his servant Moses. Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]