Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 18 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Jethro, priest of Midian, Moses' father-in-law, heard all our Father did for Moses and Israel his people, bringing Israel out of Egypt. Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito.
2 Now Jethro, Moses' father-in-law, had taken in Zipporah, Moses' wife, after Moses had sent her home, Jetro amemaki Sefora, mwasi ya Moyize, oyo ye Moyize azongisaki nanu epai ya baboti na ye,
3 with her two sons—one named Gershom, for Moses said, "I was a foreigner in a foreign land," elongo na bana mibali mibale oyo Sefora abotelaki Moyize. Mwana ya liboso, kombo na ye ezalaki « Gerishomi, » pamba te Moyize amilobelaki : « Nakomaki mopaya kati na mokili ya mopaya ; »
4 the other was named Eliezer, for he said, "the God of my father helped me, and rescued me from Pharaoh's sword." mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri, » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. »
5 Jethro, Moses' father-in-law, came with Moses' sons and wife to him at his wilderness camp, the mountain of our Father. Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe.
6 He said to Moses, "I, your father-in-law Jethro, am coming with your wife and her two sons." Jetro atindelaki Moyize maloba oyo : — Ngai Jetro, bokilo na yo, nazali koya epai na yo elongo na mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya mibali.
7 Moses went out to meet his father-in-law, bowed, and kissed him. They greeted each other and asked after each other's welfare, then went into the tent. Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo.
8 Moses told his father-in-law all our Father had done to Pharaoh and Egypt for Israel, every hardship they faced on the way, and how he rescued them. Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango.
9 Jethro rejoiced over all the good our Father had done for Israel, rescuing them from Egypt's hand. Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito.
10 Jethro said, Blessed is our Father, who rescued you from Egypt's hand and Pharaoh's hand, who rescued the people from under Egypt's hand. Jetro alobaki : — Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito.
11 Now I know our Father is greater than all gods, for he overcame them in what they were arrogant about. Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele.
12 Jethro, Moses' father-in-law, took a burnt offering and sacrifices for our Father; Aaron and all Israel's elders came to eat bread with Moses' father-in-law before our Father. Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.
13 The next day Moses sat to judge the people, who stood around him from morning to evening. Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa.
14 When his father-in-law saw all he did for the people, he said, "What is this you're doing? Why sit alone, everyone standing around you from morning to evening?" Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki : — Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ?
15 Moses said to his father-in-law, "Because the people come to me to seek our Father; Moyize azongiselaki ye : — Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe.
16 when they dispute, they come to me; I judge between one and their neighbor, and explain our Father's statutes and laws." Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe.
17 Moses' father-in-law said to him, "What you are doing is not good. Bokilo ya Moyize alobaki na ye : — Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te.
18 You and these people will wear out—the task's too heavy for you; you can't do it alone. Okolemba noki elongo na bato oyo bazali koya epai na yo. Mosala oyo eleki makasi mpo na yo ; okolonga kosala yango yo moko te.
19 Now listen to me: I'll advise you—may our Father be with you. Represent the people before him and bring their cases to him. Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe
20 Warn them of the statutes and laws, and show the way to walk and work to do. mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala.
21 From all the people, select capable men who fear our Father, truthful and hating unjust gain; set them as leaders of thousands, of hundreds, of fifties, and of tens. Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
22 Let them judge the people at all times, bringing you every major matter but deciding every minor matter themselves—lightening your load as they carry it with you. Okopesa bango mosala ya kosambisa bato tango nyonso mpe ndingisa ya kokata bango moko makambo ya mike ; kasi babanda komemela yo kaka makambo ya minene. Soki osali bongo, okozala lisusu na mokumba ya makasi te ; pamba te okokabola yango elongo na bango.
23 If you do this and our Father commands you, you'll endure, and all these people will go to their place in peace." Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango.
24 So Moses listened to his father-in-law and did all that he had said. Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki.
25 Moses chose able men from all Israel and made them heads over the people—leaders of thousands, of hundreds, of fifties, and of tens. Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.
26 They judged the people at all times, bringing hard cases to Moses but judging small matters themselves. Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize.
27 Then Moses sent his father-in-law on his way, and he went back to his own land. Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]