Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Exodus 19 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the third month after the Israelites left Egypt, on that same day, they came to the Sinai wilderness. Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai.
2 They left Rephidim, reached the wilderness of Sinai, and camped there; Israel camped facing the mountain. Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba.
3 Moses went up to our Father, and our Father called to him from the mountain, saying, "Say this to the house of Jacob, tell the Israelites: Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe ; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye : — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele :
4 You have seen what I did to Egypt, how I carried you on eagles' wings and brought you to myself. « Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.
5 Now, if you truly obey my voice and keep my covenant, you will be my treasured possession out of all peoples—for the whole earth is mine. Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,
6 You will be my kingdom of priests, a holy nation. These are the words you must speak to the Israelites." kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.
7 Moses came, called the people's elders, and set before them all the words our Father had commanded him. Moyize azongaki, abengisaki bakambi ya Isalaele mpe ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba.
8 All the people answered together, "We will do everything our Father has said." Moses brought their words back to our Father. Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko : — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.
9 Our Father told Moses, "I am coming to you in a thick cloud, so the people hear when I speak with you, and trust you forever." Then Moses reported the people's words to our Father. Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
10 Our Father said to Moses, "Go to the people, dedicate them today and tomorrow; have them wash their clothes. Yawe alobaki na Moyize : — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango ;
11 Be ready by the third day, for on it I will come down on Mount Sinai before all the people's eyes. bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele.
12 Mark off a boundary for the people all around, saying, 'Be careful not to go up on the mountain or touch its edge. Whoever touches the mountain will certainly be put to death.' Okotia bandelo zingazinga ya ngomba mpo na bato mpe okoyebisa bango : « Bosala keba ete bomata te na ngomba oyo mpe bopusana te pembeni na yango. Moto nyonso oyo akotuta yango akokufa penza.
13 No hand may touch him—he must be stoned or shot with an arrow. Whether animal or human, he must die. When the ram's horn sounds long, they may go up the mountain." Soki moto moko abuki mobeko oyo, bakosimba ye te, kasi bakoboma ye na mabanga to bakotobola ye likonga ; ezala moto to nyama, asengeli kokufa. Kaka soki lokito ya liseke ya meme eyokani makasi nde ndambo ya bato bakomata na ngomba. »
14 Moses came down from the mountain to the people, consecrated them, and they washed their clothes. Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango.
15 And he said to the people, "Be ready for the third day; have no sexual relations." Moyize alobaki na bango : — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.
16 On the third morning, thunder and lightning came, a thick cloud covered the mountain, and a very loud trumpet blast made all the camp's people tremble. Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.
17 Moses led the people out of the camp to meet our Father, and they stood at the foot of the mountain. Moyize abimisaki bato mpo ete bakende kokutana na Nzambe, na libanda ya molako. Mpe bato batelemaki na ebandeli ya ngomba.
18 Mount Sinai was all smoke, because our Father descended on it in fire. Smoke rose like smoke from a furnace, and the whole mountain shook violently. Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi.
19 As the trumpet sound grew louder and louder, Moses spoke, and our Father answered him in thunder. Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake.
20 Our Father came down on Mount Sinai, to the mountaintop, and our Father called Moses up to the mountaintop; Moses went up. Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.
21 And our Father said to Moses, "Go down and warn the people not to break through to look at me, or many will die. Yawe alobaki na Moyize : — Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa.
22 Priests who come near me must also dedicate themselves, or I may break out against them." Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa ; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango.
23 Moses said to our Father, "The people can't come up to Mount Sinai, for you yourself warned us, saying, 'Set limits around the mountain and dedicate it.'" Moyize alobaki na Yawe : — Bato ya Isalaele bakoki te komata na ngomba Sinai, pamba te Yo moko oyebisaki biso ete totia bandelo zingazinga ya ngomba mpe tomona yango lokola bule.
24 And our Father said to him, "Go down, then come up with Aaron. Don't let the priests and the people break through to come up to me, or I will break out against them." Yawe azongiselaki ye : — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.
25 So Moses went down to the people and told them. Moyize akitaki, akendeki epai ya bana ya Isalaele mpe ayebisaki bango makambo oyo Yawe alobaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]