Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So the king and Haman came to drink with Queen Esther. Mokonzi mpe Amani bakendeki mpe bakomaki na feti oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abongisaki.
2 On day two, over wine, the king again asked, "What is your petition, Queen Esther? It's granted. Your request? Up to half the kingdom—done." Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi.
3 Queen Esther answered, "If I've found favor in your eyes, king, and it pleases the king, give me my life at my petition, my people at my request. Ester, mwasi ya mokonzi, azongisaki : — Ah mokonzi ! Soki nazwi ngolu na miso na yo, mpe soki yango esepelisi yo mokonzi, tika ete opesa ngai bomoi na ngai ; yango nde ezali bosenga na ngai. Mpe lisusu, tika ete obatela bato na ngai ; yango nde ezali bosenga na ngai.
4 We're sold, I and my people, to be destroyed, killed, wiped out. Were we merely sold as male and female slaves, I'd have kept silent; such trouble wouldn't warrant disturbing the king." Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso ! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia ; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi !
5 Then King Xerxes said to Queen Esther, "Who is he, and where, who dares do this?" Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi : — Moto yango nani oyo ameki kobongisa likambo ya boye ? Azali wapi ?
6 Esther said, "An adversary and enemy—this wicked Haman!" Haman was terrified before the king and queen. Ester azongiselaki ye : — Monyokoli mpe monguna ! Ezali Amani, moto oyo ya pasi ! Amani abangaki makasi liboso ya mokonzi mpe ya mwasi ya mokonzi.
7 Enraged, the king rose from the wine to the palace garden, while Haman stayed to beg Queen Esther for his life, seeing the king meant his ruin. Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.
8 The king came back from the palace garden to the banquet hall. Haman had fallen on the couch where Esther was. The king said, "Will he even assault the queen while I'm here?" As the words left his mouth, the attendants covered Haman's face. Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. Mokonzi agangaki : — Eh ! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai ? Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani.
9 Harbona, one of the king's eunuchs, said, "The seventy-five-foot gallows Haman made for Mordecai, who spoke up for the king, stands at Haman's house." The king said, "Hang him on it." Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi : — Ezali na nzete moko oyo Amani atelemisaki mpo na Maridoshe, oyo alobaki makambo mpo na bolamu ya mokonzi ! Ezali kati na lopango ya Amani mpe ezali na bametele tuku mibale na mitano na bosanda ! Mokonzi apesaki mitindo : — Bodiembika ye moko kuna !
10 So they hanged Haman on the gallows he had prepared for Mordecai, and the king's fury subsided. Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]