Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 That day King Xerxes gave Queen Esther the estate of Haman, the enemy of the Jews. Mordecai came before the king, since Esther had told what he was to her. Kaka na mokolo yango, mokonzi Kizerisesi apesaki Ester, mwasi ya mokonzi, biloko ya Amani, monguna ya Bayuda. Mpe lokola Ester ayebisaki mokonzi ete Maridoshe azali ndeko na ye, mokonzi abengaki Maridoshe mpe Maridoshe akendeki liboso ya mokonzi.
2 The king took off his signet ring, which he had taken back from Haman, and gave it to Mordecai. Esther put Mordecai over Haman's estate. Mokonzi alongolaki lopete na ye oyo abotolaki epai ya Amani mpe apesaki yango epai ya Maridoshe. Bongo Ester atiaki Maridoshe mokambi ya biloko ya Amani.
3 Esther spoke to the king again, fell at his feet, wept, and begged him to stop Haman the Agagite's evil and his scheme against the Jews. Ester alobaki lisusu na mokonzi ; amibwakaki na makolo na ye mpe abondelaki ye na kolela ete asukisa mikano mabe ya Amani, moto ya Agagi, mpe mabongisi na ye ya koboma Bayuda.
4 The king held out the golden scepter to Esther, and she rose and stood before him. Mokonzi asembolaki lingenda ya wolo ya bokonzi na ye epai ya Ester. Bongo Ester alamukaki mpe atelemaki liboso na ye.
5 She said, "If it pleases the king, if I have his favor, if this seems right to him, and I please him, let letters be written reversing what Haman son of Hammedatha the Agagite planned and wrote to destroy the Jews in all the king's provinces. Ester alobaki : — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.
6 How can I bear to see disaster strike my people? How can I bear to watch my family destroyed?" Ndenge nini ngai nakoki komona pasi kokweyela bato na ngai to komona kobebisama ya libota na ngai ?
7 King Xerxes told Queen Esther and Mordecai the Jew, "I gave Esther Haman's house, and they hanged him on the gallows because he plotted against the Jews. Mokonzi Kizerisesi azongiselaki Ester, mwasi na ye, mpe Maridoshe, Moyuda : — Lokola Amani abundisaki Bayuda, ngai napesi ndako na ye epai ya Ester ; mpe napesi mitindo mpo ete badiembika ye na nzete.
8 Write about the Jews as you see fit, in the king's name, and seal it with his signet ring—no writing in the king's name, sealed with his ring, can be reversed." Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.
9 The king's scribes were called on the third month's twenty-third day—Sivan—and wrote all Mordecai commanded to the Jews and to the satraps, governors, and officials of the 127 provinces from India to Cush: each province in its script, each people in its language, and the Jews in their script and language. Na tango wana kaka, na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya misato, sanza ya Sivani, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi. Makambo nyonso oyo Maridoshe atindaki mpo na Bayuda, bakomelaki yango bayangeli ya bituka, bayangeli mpe bakalaka ya bituka nyonso, longwa na Ende kino na Kushi, bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, ekolo moko na moko kolanda lokota na yango, etuka moko na moko kolanda ndenge na yango ya kokoma mpe Bayuda kolanda ndenge na bango ya kokoma mpe lokota na bango.
10 Mordecai wrote in King Xerxes' name, sealed it with the king's signet ring, and sent letters by couriers on fast horses bred for royal service. Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.
11 The king's decree granted the Jews in every city the right to assemble and defend their lives: to destroy, kill, and wipe out any armed force of any people or province attacking them—children and women included—and to plunder their enemies' goods. Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango ; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango.
12 This was to take place on one day in all provinces of King Xerxes—the thirteenth day of the twelfth month, Adar. Bongo, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, ezalaki mokolo oyo Bayuda bakataki mpo na kokokisa yango kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.
13 A copy of the decree was to be issued as law in every province and made known to all peoples, so the Jews would be ready that day to avenge themselves on their enemies. Basengelaki kopanza sango ya mokanda wana mpo ete ezalaki na bokonzi ya mobeko kati na etuka moko na moko, mpe basengelaki koyebisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete Bayuda bakoka kozala ya kobongama na mokolo wana mpo na kozongisela banguna na bango mabe na mabe.
14 Couriers on royal horses rushed out, hurried and pressed by the king's command; the decree was given in Susa's fortress. Na etinda ya mokonzi, bantoma oyo batambolaka na mpunda ya mokonzi babimaki na lombangu mpe bapanzaki sango ya mobeko yango kati na engumba Size.
15 Mordecai left the king's presence in royal blue and white, a great gold crown, and a fine linen and purple robe. Susa shouted and rejoiced. Maridoshe alongwaki liboso ya mokonzi, na bilamba ya bokonzi ya langi ya ble mpe ya pembe, na motole monene ya wolo mpe na nzambala ya motane makasi ya lino ya kitoko. Engumba mobimba ya Size ezalaki koganga na esengo mpe ezalaki kosepela.
16 The Jews had light, joy, gladness, and honor. Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda.
17 The king's command and edict reached every province and city; the Jews had joy and delight, feasting, a holiday. Many peoples of the land became Jews, for fear of the Jews gripped them. Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda ; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]