Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the twelfth month, Adar, on the thirteenth day—when the king's order and decree were to take effect, the day the Jews' enemies hoped to dominate them—it reversed: the Jews dominated their haters. Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda ; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango.
2 The Jews gathered in their cities across King Xerxes's provinces to attack those seeking their harm. No one could stand against them; fear of them had fallen on all peoples. Kati na bingumba na bango, kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi, Bayuda basanganaki mpo na kobundisa bato nyonso oyo bolukaki kobebisama na bango. Ekolo moko te ezalaki na makoki ya kotelemela bango, pamba te bato ya bikolo nyonso mosusu oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bazalaki na somo na bango.
3 All the province officials, satraps, governors, and royal administrators supported the Jews, for fear of Mordecai had fallen on them. Bakalaka nyonso ya bituka, bayangeli ya bituka oyo mokonzi atiaki, bayangeli mpe bakalaka ya mokonzi basungaki Bayuda, pamba te bazalaki na somo monene ya Maridoshe.
4 Mordecai grew powerful in the king's house; his fame spread through every province, for Mordecai himself grew more and more powerful. Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi : lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo.
5 The Jews struck all their enemies with the sword, killing and destroying, doing as they pleased to their haters. Bayuda babebisaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe babebisaki bango ; basalaki bato oyo bazalaki koyina bango makambo nyonso oyo basepelaki kosala.
6 In the citadel of Susa the Jews killed and destroyed 500 men. Kaka na engumba Size, Bayuda babomaki mpe babebisaki bato nkama mitano.
7 They also killed Parshandatha, Dalphon, Aspatha, Babomaki mpe lisusu Parishandata, Dalifoni, Asipata ;
8 Poratha, Adalia, Aridatha, Porata, Adalia mpe Aridata ;
9 Parmashta, Arisai, Aridai, and Vaizatha. Parimashita, Arizayi, Aridayi mpe Vayezata ;
10 Ten sons of Haman son of Hammedatha, enemy of the Jews, they killed—but they took no plunder. bana mibali zomi ya Amani, mwana mobali ya Amedata, monguna na Bayuda, kasi batikalaki te kozwa bomengo ya bitumba.
11 That day the number killed in the citadel of Susa was reported to the king. Kaka na mokolo wana, bayebisaki mokonzi motango ya bato oyo babomaki kati na engumba Size.
12 The king said to Queen Esther, "In the fortress of Susa the Jews killed and destroyed 500 men and Haman's ten sons. What have they done in the rest of the king's provinces? What is your request? It will be given to you. What more do you ask? It will be done." Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi : — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi ? Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo.
13 Esther said, "If it pleases the king, let the Jews in Susa act again tomorrow under today's decree, and hang Haman's ten sons on poles." Ester azongisaki : — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani.
14 The king ordered it done. A decree was issued in Susa, and they hanged Haman's ten sons. Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.
15 Jews in Susa also gathered on Adar's fourteenth day, killed 300 men there, but didn't touch the plunder. Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato ; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.
16 The rest of the Jews in the king's provinces gathered to defend their lives, got relief from enemies, killed 75,000 who hated them, but touched no plunder. Bayuda mosusu oyo bazalaki kovanda kati na bituka ya mokonzi, bango mpe basanganaki mpo na komibatela mpe bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango.
17 This happened on the thirteenth of Adar; the fourteenth they rested, making it a day of feasting and joy. Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
18 In Susa the Jews gathered on the thirteenth and fourteenth days, resting on the fifteenth, making it a day of feasting and joy. Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei ; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
19 That is why the Jews of the open villages celebrate the fourteenth of Adar with joy, feasting, a holiday, and sending food gifts to each other. Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango.
20 Mordecai wrote these events, sending letters to all Jews in King Xerxes's provinces, near and far, Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika
21 to require them to celebrate the fourteenth and fifteenth days of the month of Adar every year, ete basalaka feti na mibu nyonso, na mokolo ya zomi na minei mpe ya zomi na mitano ya sanza ya Adari,
22 as the days the Jews rested from their enemies, and the month turned for them from grief to joy, mourning to celebration. He told them to keep them as days of feasting and joy, sending food gifts to each other and gifts to the poor. mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.
23 The Jews adopted as a custom what they had begun doing, just as Mordecai wrote to them. Bayuda bandimaki kokoba kosala feti oyo mpe bakomaki kosala makambo oyo Maridoshe akomelaki bango.
24 Haman son of Hammedatha the Agagite, enemy of all the Jews, planned their destruction and cast the pur—the lot—to crush and destroy them. Pamba te Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda nyonso, asalelaki Bayuda likita mpo na kobebisa bango ; abetaki Puri, oyo ezali « zeke, » mpo na kufa mpe libebi na bango.
25 But when it came before the king, he ordered by letter that the evil scheme Haman schemed against the Jews fall back on his head, and that he and his sons be hung on the poles. Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.
26 So these days are called Purim, after the word pur, because of all this letter's words, and because of what they saw and what happened to them. Yango wana babengaka mokolo yango Purimi (ewuti na kombo Puri oyo elakisi zeke). Mpo na makambo nyonso oyo Maridoshe akomaki na mokanda, mpo na makambo nyonso oyo bamonaki mpe makambo nyonso oyo ekomelaki bango,
27 The Jews bound themselves, their descendants, and all who joined them, to keep these two days yearly at the appointed time, without fail, as written. Bayuda bakataki mpe bandimaki ete yango ekoma ezaleli mpo na bango, ezaleli ya bakitani na bango mpe ya bato nyonso oyo bakosangana na bango, mpo ete batosaka kosala feti ya mikolo oyo mibale, na mibu nyonso, ndenge ekatama na tango na yango.
28 Every generation, family, province, and city remembers and keeps these days; these Purim days will never end among the Jews, nor their memory die out among their descendants. Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.
29 Queen Esther daughter of Abihail and Mordecai the Jew wrote with full authority confirming this second Purim letter. Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi.
30 Letters were sent to all the Jews in 127 provinces of Xerxes's kingdom—words of peace and truth, Maridoshe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kovanda kati na bituka nyonso nkama moko na tuku mibale na sambo ya mokili ya Kizerisesi, mpe mikanda yango ezalaki na maloba ya kimia mpe ya elikya
31 confirming these Purim days at their set times, as Mordecai the Jew and Queen Esther ordered for them, and as they ordered for themselves and their descendants, times of fasting and mourning. mpo na kobeta sete na tina na mikolo oyo ya Purimi ete Bayuda basengeli kosala Purimi yango na mikolo na yango oyo ekatama kolanda mokano ya Moyuda Maridoshe mpe Ester, mwasi ya mokonzi ; mpe ndenge Bayuda bakataki yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango lokola tango na bango ya kokila bilei mpe ya bileli.
32 Esther's command confirmed these regulations about Purim, and it was written down in the record. Mitindo ya Ester elendisaki mibeko mpo na Purimi mpe ekomamaki na buku.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]