Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 That night, sleep escaped the king; he ordered the record book—the chronicles—brought and read to him. Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.
2 It was found written that Mordecai reported Bigthana and Teresh, two of the king's eunuchs guarding the threshold, who sought to assassinate King Xerxes. Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango : Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi.
3 The king asked, "What honor and greatness has Mordecai received for this?" His attendants replied, "Nothing was done for him." Mokonzi atunaki : — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango ? Basali na ye bazongisaki : — Basala ata eloko moko te mpo na ye.
4 "Who is in the court?" the king asked. Haman had entered the palace's outer court to ask him to hang Mordecai on the gallows he'd prepared. Mokonzi atunaki : — Nani azali kati na lopango ? Nzokande Amani awutaki kokota na lopango ya libanda ya ndako ya mokonzi mpo na kosolola na ye mpo ete badiembika Maridoshe na nzete oyo atelemisaki mpo na ye.
5 The king's attendants told him, "Haman is standing in the court." "Bring him in," the king said. Basali ya mokonzi bazongisaki : — Ezali Amani nde azali kati na lopango. Mokonzi alobaki : — Bokotisa ye.
6 Haman entered. The king asked, "What should be done for the man the king delights to honor?" Haman thought, "Who would the king delight to honor more than me?" Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye : — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu ? Amani amilobelaki : « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te ? »
7 So Haman said to the king, "For the man the king delights to honor, Amani azongiselaki mokonzi : — Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu,
8 let them bring a royal robe the king has worn, a horse he has ridden, and a royal crown for its head. tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango.
9 Give the robe and horse to one of the king's noble officials. Dress the man the king delights to honor, parade him on horseback through the city square, and proclaim before him, 'This is done for the man the king delights to honor!'" Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu ! »
10 "Hurry," the king said to Haman, "take the robe and horse as you said, and do so for Mordecai the Jew sitting at the king's gate. Omit nothing you said." Mokonzi alobaki na Amani : — Kende noki koluka nzambala mpe mpunda ndenge olobi, mpe sala yango mpo na Moyuda Maridoshe oyo asalaka mosala na ye na ekuke ya mokonzi. Kati na makambo nyonso oyo osili koloba, kotika ata eloko moko te.
11 Haman took the robe and horse, dressed Mordecai, paraded him on horseback through the city square, calling before him, "This is done for the man the king delights to honor." Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu ! »
12 Afterward Mordecai returned to the king's gate, but Haman rushed home, mourning, with his head covered. Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi ; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye.
13 Haman told his wife Zeresh and all his friends everything that had happened. His advisers and wife Zeresh said, "Since Mordecai, before whom you've begun to fall, is Jewish, you can't defeat him—you will surely fall before him." Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye : — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te ; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka !
14 While still speaking with him, the king's eunuchs arrived, rushing Haman to Esther's prepared banquet. Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]