Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 On the third day, Esther dressed in royal robes and stood in the inner court of the palace, facing the king's hall. The king sat on his royal throne in the hall, facing the entrance of the palace. Na mokolo ya misato ya kokila bilei, Ester alataki bilamba na ye ya bokonzi mpe akotaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, liboso ya shambre na ye. Mokonzi azalaki ya kovanda na kiti na ye ya bokonzi kati na shambre oyo ezalaki kotalana na ekuke ya kokotela.
2 When the king saw Queen Esther standing in the court, she found favor with him, and he held out the gold scepter in his hand. She approached and touched its tip. Tango mokonzi amonaki Ester, mwasi na ye, atelemi kati na lopango, asalelaki ye ngolu. Mokonzi asembolaki epai ya Ester lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, oyo ezalaki na loboko na ye. Ester apusanaki mpe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi.
3 The king asked, "What's wrong, Queen Esther? What do you request? Up to half the kingdom will be given you." Mokonzi atunaki ye : — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai !
4 Esther said, "If the king is pleased, let him and Haman come today to the banquet I've prepared." Ester azongisaki : — Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye.
5 "Bring Haman quickly to do as Esther asked," said the king. The king and Haman came to the banquet Esther prepared. Mokonzi alobaki : — Bolukela ngai noki Amani mpo ete tokokisa bosenga ya Ester. Boye, mokonzi mpe Amani bakendeki na feti oyo Ester abongisaki.
6 Over wine the king asked, "What's your petition, Esther? It will be granted. And what is your request? Even half the kingdom—it's yours." Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester : — Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai.
7 Esther answered, "My petition and my request is this: Ester azongisaki : — Posa mpe bosenga na ngai ezali boye :
8 If I've found favor with the king, and it pleases him to grant my petition and fulfill my request, let the king and Haman come to the banquet I'll prepare for them. Tomorrow I'll do as the king says." Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.
9 Haman left that day happy and glad. But seeing Mordecai at the king's gate not rise or tremble before him, Haman was enraged at Mordecai. Amani abimaki na esengo mpe na nsayi. Kasi tango Amani amonaki Maridoshe na ekuke ya mokonzi mpe asosolaki ete Maridoshe atelemi te mpe azali kolenga te liboso na ye, Amani asilikelaki Maridoshe makasi.
10 Still, Haman held himself back and went home. He sent for his friends and his wife Zeresh, Kasi atako bongo, Amani akangaki motema mpe azongaki epai na ye ; abengisaki balingami na ye mpe Zereshi, mwasi na ye.
11 Haman told them of his wealth's splendor, his many sons, and how the king had honored and promoted him above the king's officials and servants. Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.
12 "And that's not all," Haman added. "Queen Esther invited only me with the king to her banquet, and I'm invited again tomorrow with the king. Amani abakisaki : — Esuki kaka wana te ! Nazali kaka ngai moko, moto oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abengi elongo na mokonzi na feti oyo abongisi. Mpe lobi, abengi ngai lisusu elongo na mokonzi.
13 Yet all this profits me nothing whenever I see Mordecai the Jew sitting at the king's gate." Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi.
14 His wife Zeresh and all his friends said, "Have them build a pole seventy-five feet high. In the morning, ask the king to hang Mordecai on it. Then go with the king to the banquet, happy." Haman liked this and had the pole built. Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]