Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Mordecai learned all that had happened, he tore his clothes, put on sackcloth and ashes, and went out into the city crying loud and bitter. Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa.
2 He went only to the king's gate, since no one could enter it dressed in mourning clothes. Bongo akendeki kino na liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi ; pamba te moto moko te, wana alati saki lokola elamba, azalaki na ndingisa ya kokota na ekuke ya mokonzi.
3 In every province the king's order and decree reached, the Jews mourned deeply—fasting, weeping, wailing; many lay in sackcloth and ashes. Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu.
4 When Esther's young women and eunuchs told her, the queen writhed in anguish. She sent clothes for Mordecai to replace his sackcloth, but he refused. Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki.
5 Esther called Hathach, one of the king's eunuchs assigned to her, and sent him to Mordecai to learn what this was and why. Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester ; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa.
6 So Hathach went out to Mordecai in the city square in front of the king's gate, Boye Ataki akendeki epai ya Maridoshe na etando ya engumba, epai wapi bato ebele bakutanaka, liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi.
7 Mordecai told Hathach all that had happened to Mordecai, and the exact sum Haman promised to pay into the king's storerooms to destroy the Jews. Maridoshe ayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki ye, ata motuya ya mbongo oyo Amani alakaki kopesa na libenga ya bomengo ya mokonzi mpo ete baboma Bayuda.
8 He also gave him a copy of the destruction decree issued in Susa, to show Esther, explain it, and urge her to go plead with the king and beg for her people. Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size.
9 Hathach came back and reported to Esther what Mordecai had said. Tango Ataki azongaki mpe ayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe alobaki,
10 Then Esther spoke to Hathach and gave him this message for Mordecai: Ester atindaki lisusu Ataki koloba na Maridoshe :
11 "All the king's servants and people of his provinces know: any man or woman who enters the king's inner court unsummoned has one law—death—unless the king holds out the golden scepter to them, so they live. And I have not been called to the king for thirty days now." — Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te ; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi ; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te.
12 When they told Mordecai what Esther had said, Tango bayebisaki Maridoshe makambo oyo Ester alobaki,
13 Mordecai replied to Esther: "Don't think that in the king's palace you alone of all the Jews will escape. Maridoshe azongiselaki Ester : — Kokanisa te ete lokola ozali kati na ndako ya mokonzi, yo moko kaka nde okobika kati na Bayuda nyonso.
14 If you stay silent now, relief and rescue will rise for the Jews from elsewhere, but you and your father's house will die. And who knows whether you reached the throne for such a time?" Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ?
15 Then Esther sent back this reply to Mordecai: Ester atindelaki Maridoshe eyano oyo :
16 "Go, gather all the Jews in Susa. Fast for me—no eating or drinking three days, night or day. My young women and I will fast too. Then I go to the king, even though it is against the law; and if I perish, I perish." — Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka !
17 So Mordecai went away and did everything Esther had commanded him. Maridoshe akendeki mpe asalaki makambo nyonso oyo Ester atindaki ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]