Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After this King Xerxes promoted Haman son of Hammedatha the Agagite, elevating him and raising his seat above all the officials with him. Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso.
2 All the king's servants at the king's gate knelt and bowed to Haman, as the king ordered. But Mordecai would not kneel or bow. Bakalaka nyonso oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bakomaki kofukama mpe kopesa Amani lokumu, pamba te mokonzi atindaki ete basala bongo mpo na ye. Kasi Maridoshe azalaki kofukamela ye te mpe azalaki kopesa ye lokumu te.
3 So the king's servants at the king's gate asked Mordecai, "Why do you disobey the king's command?" Bakalaka oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi batunaki Maridoshe : — Mpo na nini otosaka mitindo ya mokonzi te ?
4 Day after day they urged him, but he refused; so they told Haman, to see if Mordecai's stand would hold, since he had told them he was a Jew. Bazalaki koloba na ye bongo mikolo nyonso, kasi Maridoshe azalaki kaka koboya koyoka bango. Boye, bayebisaki Amani makambo yango mpo na koyeba soki ezaleli ya Maridoshe ekondimama mpe soki akokangama kaka na maloba na ye, pamba te ayebisaki bango ete azali Moyuda.
5 When Haman saw that Mordecai would not kneel or bow to him, he was filled with rage. Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi.
6 Killing only Mordecai seemed beneath him, since they had told him who Mordecai's people were; so Haman sought to destroy all Mordecai's people, the Jews, throughout Xerxes's kingdom. Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te ; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi.
7 In the first month, Nisan, in King Xerxes's twelfth year, they cast Pur (the lot) before Haman for each day and each month; and the lot fell on the twelfth month, Adar. Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari.
8 Haman told King Xerxes, "A certain people is scattered and dispersed among the peoples throughout your kingdom's provinces. Their laws differ from everyone's, and they ignore the king's laws; it profits the king nothing to tolerate them. Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.
9 If it pleases the king, let it be written to destroy them; I'll weigh 375 tons of silver to his officials for the royal treasury." Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi.
10 The king took off his signet ring and gave it to Haman son of Hammedatha the Agagite, enemy of the Jews. Mokonzi alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe apesaki yango epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda.
11 "The silver is yours," the king told Haman, "and the people too—do with them as you please." Mokonzi alobaki na Amani : — Bomba palata na yo ! Sala nyonso oyo olingi epai ya bato yango.
12 On the first month's thirteenth day the king's scribes were summoned, and Haman's order was written to the king's satraps, the governors over each province, and the officials of every people—each province in its own script, each people its own language. Written in King Xerxes's name, sealed with his signet ring. Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi.
13 Couriers carried letters to all the king's provinces: destroy, kill, and eliminate all Jews—young and old, women and children—in one day, thirteenth of the twelfth month, Adar, and seize their goods. Bongo mikanda yango etindamaki na bituka nyonso ya mokonzi, na nzela ya bantoma, mpo na kobebisa, koboma mpe kolimwisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikolo, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari ; mpe kobotola na makasi biloko na bango.
14 A copy was to be issued as law in every province, shown to all peoples, so they would be ready for that day. Basengelaki kopanza kati na bituka nyonso sango ya mobeko yango mpe kolakisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete babongama mpo na mokolo wana.
15 At the king's command couriers rushed out, and the decree went out in the fortress of Susa. The king and Haman sat drinking, but the city of Susa was bewildered. Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]