Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Later, when King Xerxes' anger cooled, he remembered Vashti, what she had done, and what was decreed against her. Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki ; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye.
2 The king's attendants said, "Let beautiful young virgins be sought for the king. Bato oyo basalaka epai ya mokonzi balobaki na ye : — Tika ete balukela mokonzi bilenge basi ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te.
3 The king should appoint officers in every province of his kingdom to gather every beautiful young virgin to the fortress of Susa, to the harem under Hegai, the king's eunuch guarding the women, and give them beauty treatments. Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi ; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko.
4 Let the young woman who pleases the king reign in Vashti's place." This pleased the king, and he did so. Tika ete elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi akoma mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. Likanisi oyo esepelisaki mokonzi mpe asalelaki yango.
5 In the fortress of Susa lived a Jew named Mordecai, son of Jair, son of Shimei, son of Kish, a Benjaminite, Kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi, ezalaki na Moyuda moko ya libota ya Benjame ; kombo na ye ezalaki « Maridoshe. » Maridoshe azalaki mwana mobali ya Yairi, mwana mobali ya Shimei, mwana mobali ya Kishi.
6 exiled from Jerusalem among the captives taken with Judah's king Jeconiah, whom Babylon's king Nebuchadnezzar carried away. Maridoshe azalaki kati na bato oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu, longwa na Yelusalemi, elongo na Yekonia, mokonzi ya Yuda.
7 He was raising Hadassah—Esther—his uncle's daughter, who had no father or mother. The young woman was beautiful in form and lovely to see; when her father and mother died, Mordecai took her as his own daughter. Maridoshe azalaki kobokola Adasa, mwana mwasi ya noko na ye mpo ete azalaki lisusu na tata mpe na mama te. Nzokande, elenge mwasi oyo kombo na ye mosusu ezalaki « Ester » azalaki na ezaleli malamu mpe elongi kitoko. Tango tata mpe mama na ye bakufaki, Maridoshe azwaki ye mpe akomaki kobokola ye lokola mwana na ye penza ya mwasi.
8 When the king's command and decree were heard and many young women gathered to Susa's fortress under Hegai's care, Esther too was taken to the king's palace, under Hegai's care, keeper of the women. Tango bapanzaki sango ya mitindo mpe ya mobeko ya mokonzi, basangisaki bilenge basi ebele na engumba Size, mpe Ege azalaki kobatela bango. Boye bamemaki mpe Ester kati na ndako ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Ege, mosali oyo azalaki kobatela ndako ya basi ya mokonzi.
9 The young woman pleased him and won his favor, so he quickly gave her beauty treatments and food portions, seven select young women from the king's palace, and moved her and her maids to the best of the harem. Ester asepelisaki Ege mpe azwaki ngolu na miso na ye. Mbala moko, apesaki ye biloko ya monzele mpe bilei oyo asengeli kolia ; apesaki ye mpe basali sambo ya basi oyo aponaki kati na ndako ya mokonzi. Bongo atiaki ye elongo na basali na ye ya basi kati na shambre oyo elekaki kitoko kati na ndako ya basi ya mokonzi.
10 Esther had not revealed her people or family, because Mordecai told her not to. Ester atikalaki te koyebisa ekolo mpe libota na ye, pamba te Maridoshe apekisaki ye koloba yango.
11 Every day Mordecai walked back and forth in front of the harem courtyard to learn how Esther was and what happened to her. Mikolo nyonso, Maridoshe azalaki koleka liboso ya lopango ya ndako ya basi ya mokonzi mpo na kozwa basango ya Ester mpe koyeba ndenge nini bazalaki kobatela ye.
12 Each young woman's turn to go to King Xerxes came after twelve months of required beauty treatment: six months with oil of myrrh, six with perfumes and cosmetics. Kolanda ndenge ekatamaki, liboso ete elenge mwasi nyonso akende kokutana na mokonzi Kizerisesi, basengelaki kosala sanza zomi na mibale mpo na kobongisa ye mpo ete akoma kitoko : sanza motoba na mafuta ya mire, mpe sanza motoba mosusu na biloko ya monzele.
13 Each young woman went to the king this way: whatever she asked was given her to take from the harem to the king's palace. Tala ndenge elenge mwasi nyonso oyo azalaki kokende epai ya mokonzi azalaki : Wuta na ndako ya basi ya mokonzi kino na ndako ya mokonzi, bazalaki kopesa ye eloko nyonso oyo azalaki na yango na bosenga.
14 She went in at evening; at morning she returned to a second harem under Shaashgaz, the king's eunuch keeping the concubines. She would not return to the king unless he delighted in her and called her by name. Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa ; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo.
15 When Esther's turn came—daughter of Abihail, Mordecai's uncle, who had adopted her as his own—to go to the king, she requested nothing except what Hegai, the king's eunuch guarding the women, advised. Esther won favor with all who saw her. Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.
16 Esther was taken to King Xerxes in his royal palace in the tenth month, Tebeth, in the seventh year of his reign. Ezalaki na sanza ya zomi, sanza ya Tebeti, na mobu ya sambo ya bokonzi ya Kizerisesi nde bamemaki Ester liboso ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi.
17 The king loved Esther more than all the women; she won his favor and approval above all the virgins. So he set the royal crown on her head and made her queen instead of Vashti. Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti.
18 The king held a great banquet for all his officials and servants—Esther's banquet. He proclaimed a holiday in the provinces and gave gifts with royal generosity. Mokonzi alambisaki biloko ebele mpo na lokumu ya Ester mpe mpo na kosepela elongo na basali na ye nyonso mpe bakalaka na ye. Akataki lisusu ete, na mokolo wana, bituka nyonso efuta mpako te mpe akabolaki bakado na motema ya esengo.
19 Now when the virgins were gathered a second time, Mordecai was sitting at the king's gate. Tango basangisaki bilenge basi na mbala ya mibale, Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi.
20 Esther had not revealed her people or family, as Mordecai directed; she obeyed him just as when he raised her. Kasi Ester atikalaki te koloba libota na ye to mpe ekolo na ye, ndenge kaka Maridoshe ayebisaki ye ete aloba yango te. Ester azalaki kokoba kobatela toli ya Maridoshe, ndenge kaka azalaki kosala na tango Maridoshe azalaki kobokola ye.
21 In those days, as Mordecai sat at the king's gate, Bigthan and Teresh, two royal eunuchs guarding the doorway, grew angry and plotted to kill King Xerxes. Tango Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi, Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kobatela ekuke ya mokonzi, batombokaki mpe balukaki koboma mokonzi Kizerisesi.
22 But Mordecai learned of the plot and told Queen Esther, who reported it to the king in Mordecai's name. Kasi Maridoshe asosolaki makanisi na bango mpe ayebisaki yango epai ya Ester, mwasi ya mokonzi, oyo mpe ayebisaki yango epai ya mokonzi na kombo ya Maridoshe.
23 The matter was investigated, confirmed true, and both men were impaled on a pole. It was recorded in the book of chronicles before the king. Bongo sima na bango koluka koyeba bosolo ya likambo yango, emonanaki ete ezali likambo ya solo. Boye badiembikaki basoda nyonso mibale na nzete mpe bakomaki makambo nyonso wana kati na buku ya masolo, na miso ya mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]