Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Esther 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This happened in the days of Xerxes—the Xerxes who reigned from India to Cush over 127 provinces, Tala makambo oyo esalemaki na tango ya mokonzi Kizerisesi oyo azalaki kokamba bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, longwa na Ende kino na Kushi.
2 in those days, when King Xerxes sat on his royal throne in the citadel of Susa, Na tango wana, Kizerisesi akendeki kovanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na Size, engumba mokonzi batonga makasi.
3 in his third year as king he gave a feast for all his officials and servants. The army of Persia and Media, the nobles, and provincial officials were assembled before him, Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu : bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka.
4 for 180 days he displayed his kingdom's rich glory and his greatness's splendid honor. Na feti yango, azalaki kolakisa ebele ya bomengo ya bokonzi na ye mpe kongenga ya lokumu monene oyo azalaki na yango. Feti yango esalaki mikolo nkama moko na tuku mwambe.
5 When these days ended, the king gave a seven-day feast for everyone in the Susa fortress, great and small, in the courtyard of the palace garden. Sima na mikolo yango, mokonzi asalisaki kati na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, feti mosusu oyo esalaki mikolo sambo mpo na bato nyonso, ezala babola to bazwi, oyo bazalaki kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi.
6 White cotton and blue hangings held with fine linen and purple cords to silver rings on marble pillars; gold and silver couches on a mosaic of porphyry, marble, mother-of-pearl, and colored stone. Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble ; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane ; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge : mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo.
7 Drinks were served in gold goblets, each different, and royal wine flowed freely by the king's generosity. Bazalaki kokabola masanga ya vino na bakopo ya wolo ; kopo na kopo ezalaki na lolenge na yango. Bongo vino ezalaki penza ebele kolanda motema ya kokaba ya mokonzi.
8 Drinking followed a rule: no compulsion—the king had ordered every household official to grant each man his own wish. Mokonzi apesaki mitindo ete moto nyonso oyo abengami na feti amela masanga ndenge alingi, pamba te atindaki bato nyonso oyo bakabolaka masanga kopesa na moto nyonso masanga ya vino kolanda posa ya moto na moto.
9 Queen Vashti also gave a banquet for the women in the royal palace of King Xerxes. Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi.
10 On the seventh day, when wine had made the king merry, he ordered Mehuman, Biztha, Harbona, Bigtha, Abagtha, Zethar, and Carkas, King Xerxes's seven eunuchs, Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi.
11 to bring Queen Vashti before the king in the royal crown, to show the peoples and officials her beauty, for she was beautiful. Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi ; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko.
12 But Queen Vashti refused to come at the king's command through the eunuchs; he grew furious, anger blazing in him. Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda.
13 The king then spoke to the wise men who knew the times—for it was the king's custom to bring any matter before all skilled in law and judgment. Asololaki na bato na ye ya bwanya oyo bayebaka kososola tango, pamba te ezalaki momesano ete makambo ya mokonzi esengeli koya liboso ya bato nyonso ya bwanya, ba-oyo bayebi malamu makambo etali mibeko mpe bosembo, mpo ete basosola yango.
14 Next to him: Carshena, Shethar, Admatha, Tarshish, Meres, Marsena, Memucan—Persia and Media's seven officials who saw the king's face, ranking highest in the kingdom. Nzokande, ezalaki na bato sambo ya lokumu, bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bazalaki bapesi toli oyo mokonzi azalaki kolinga makasi ; bazalaki kosangana na mayangani ya mokonzi mpe basimbaki misala oyo eleki minene. Bakombo na bango ezalaki : Karishena, Shetari, Adimata, Tarsisi, Meresi, Marisena mpe Memukani.
15 "By law, what's due Queen Vashti for disobeying King Xerxes's command, sent through the eunuchs?" Mokonzi atunaki bango : — Kolanda mobeko, esengi kosala nini epai ya Vasti, mwasi ya mokonzi, mpo ete aboyi kotosa mitindo ya mokonzi Kizerisesi, mitindo oyo basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki ye ?
16 Memucan told the king and officials, "Queen Vashti wronged not only the king, but all officials, all peoples, in all provinces of King Xerxes. Memukani azongiselaki mokonzi liboso ya bakalaka na ye : — Vasti, mwasi ya mokonzi, asali mabe kaka liboso ya mokonzi te ; kasi mpe, liboso ya bakalaka nyonso mpe ya bato nyonso kati bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.
17 The queen's act will reach all women, making them despise their husbands in their eyes: 'King Xerxes summoned Queen Vashti, and she did not come.' Pamba te sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi ekoyebana kati na basi nyonso ; na bongo, bakokoma kotiola bokonzi ya mibali na bango na koloba : « Mokonzi Kizerisesi kutu apesaki mitindo ete babenga Vasti mpo ete akende liboso na ye, kasi mwasi ya mokonzi aboyaki kokende ! »
18 Today the noblewomen of Persia and Media who heard the queen's conduct will say the same to all the king's officials—no end of contempt and rage. Kaka na mokolo ya lelo, basi ya bakalaka ya bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bayoki sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi, bakozongisela bakalaka nyonso ya mokonzi kaka ndenge moko. Boye, kozanga na bango limemia mpe botosi ekoluka ete mibali na bango bakoma na kanda.
19 If it pleases the king, let him issue a royal decree, written into the laws of Persia and Media, beyond repeal, that Vashti never again come before King Xerxes, and let the king give her royal position to another woman better than she. Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.
20 When the king's decree spreads through his vast kingdom, all wives will honor their husbands, great and small." Boye tango mobeko ya mokonzi ekopanzana na mokili na ye mobimba, basi nyonso bakotosa mibali na bango, ezala babola to bazwi.
21 This advice pleased the king and the officials, and the king did just as Memucan proposed. Toli oyo esepelisaki mokonzi elongo na bakalaka na ye. Mokonzi asalaki ndenge Memukani alobaki.
22 He sent letters to all the royal provinces, to every province in its own script, every people in its own language: each man is to rule his household and speak his own people's language. Atindaki mikanda na bituka nyonso ya mokili : etuka na etuka kolanda ndenge ezali ekomeli na yango ; mpe bato na bato, kolanda lokota na bango. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi ya ndako na ye mpe koloba monoko ya mboka na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]