Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 That day they read Moses' book aloud to the people and found it written that no Ammonite or Moabite was ever to enter our Father's assembly, Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka ; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango : « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe ;
2 because they did not meet the people of Israel with bread and water, but hired Balaam against them to curse them—yet our Father turned the curse into a blessing. mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe ; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. »
3 As soon as the people heard the Law, they separated from Israel everyone of foreign descent. Tango kaka bato bayokaki mobeko yango, balongolaki na Isalaele bakitani nyonso ya bapaya.
4 Before this, Eliashib the priest, appointed over the storerooms of the house of our Father, was closely tied to Tobiah. Liboso ya kozwa mokano yango, Nganga-Nzambe Eliashibi oyo azali na mokumba ya kobatela bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso mpe azali moto ya libota ya Tobiya
5 He had prepared him a large room, where they used to store the grain offerings, frankincense, temple articles, and the tenth of grain, new wine, and oil assigned to the Levites, singers, and gatekeepers, plus the contribution for the priests. apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke ; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe.
6 Through all this I wasn't in Jerusalem, for in the thirty-second year of Artaxerxes king of Babylon I had gone to the king. After some time I asked his permission to leave, Kasi wana makambo oyo nyonso ezalaki kosalema, ngai nazalaki na Yelusalemi te, pamba te nazongaki epai ya Aritakizerisesi, mokonzi ya Babiloni, na mobu ya tuku misato na mibale ya bokonzi na ye. Bongo sima na mwa mikolo, na suka ya mobu, nasengaki ye nzela
7 I came back to Jerusalem and learned of the evil Eliashib had done for Tobiah, making him a room in the courts of the house of our Father. mpe nazongaki na Yelusalemi. Kuna, namonaki mpe nasosolaki mabe oyo Eliashibi asalaki na ndenge apesaki Tobiya shambre kati na lopango ya Ndako ya Nzambe ;
8 I was deeply grieved, and I threw all of Tobiah's household belongings out of the room. nasilikaki makasi mpe nabwakaki biloko nyonso ya Tobiya na libanda ya shambre.
9 So I ordered the rooms cleansed, then restored to them the articles of the house of our Father, the grain offerings and frankincense. Napesaki mitindo ete bapetola bashambre mpe, na sima, nazongisaki kati na yango bisalelo ya Ndako ya Nzambe, makabo ya ble mpe ansa.
10 I also found that the Levites' portions had not been given them, so the Levites and singers who did the work had each fled to his own field. Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.
11 So I confronted the officials: "Why is our Father's house neglected?" Then I gathered the Levites and restored them to their posts. Mpo na yango, napamelaki bakambi ya bato mpe natunaki bango : — Mpo na nini Ndako ya Nzambe esundolami ? Bongo, nasangisaki Balevi mpe bayembi mpe nazongisaki bango, moto na moto na mosala na ye.
12 So all Judah brought the tenth of grain, new wine, and oil to the storehouses. Bato nyonso ya Yuda bamemaki kati na bibombelo : eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta.
13 I put Shelemiah the priest, Zadok the scribe, and Pedaiah the Levite in charge of the storehouses, with Hanan son of Zaccur son of Mattaniah assisting them, since they were trustworthy; their task was distributing supplies to their fellow Levites. Napesaki mokumba ya kobatela bibombelo epai ya Nganga-Nzambe Shelemiya, epai ya Tsadoki, molakisi ya Mobeko, mpe epai ya Pedaya, moko kati na Balevi ; mpe napesaki bango Anani, mwana mobali ya Zakuri, koko ya Matania, mpo ete asunga bango, pamba te bango nyonso bazalaki bato ya sembo. Bapesamelaki mokumba ya kokabola biloko epai ya baninga na bango, Balevi.
14 Remember me for this, my Father; don't wipe out the faithful deeds I've done for the house of my Father and its service. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na makambo oyo nyonso ; kobosana te misala nyonso oyo nasali na boyengebene mpo na Ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala na yango !
15 In those days I saw people in Judah treading winepresses on the Sabbath, hauling in heaps of grain and loading them on donkeys, along with wine, grapes, figs, and all kinds of loads, bringing them into Jerusalem on the Sabbath. So that day I warned them about selling food. Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana.
16 Tyrians living there brought in fish and all kinds of goods, selling them on the Sabbath to Judah's people, in Jerusalem itself. Ezalaki mpe na bato ya Tiri, oyo bazalaki kovanda kati na Yelusalemi ; bango bazalaki komema mbisi mpe biloko ya ndenge na ndenge, mpe bazalaki kotekela yango bato ya Yuda mpe kati na Yelusalemi na mokolo ya Saba.
17 So I confronted the nobles of Judah and said to them, "What is this evil thing you're doing, desecrating the Sabbath day? Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango : — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba ?
18 Didn't your ancestors do this, and didn't our Father bring all this disaster on us and this city? Now you add even more wrath against Israel by desecrating the Sabbath." Tala, bakoko na bino basalaki mpe kaka boye ; mpe ezali mpo na yango nde Nzambe na biso atindelaki biso mpe engumba oyo pasi oyo nyonso. Mpe bino, lokola bozali kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba, bozali nde komatisa kanda ya Nzambe likolo ya Isalaele !
19 So when Jerusalem's gates grew dark before the Sabbath, I ordered the doors shut, not to be opened until the Sabbath ended. I stationed some of my servants at the gates so no load could enter on the Sabbath. Tango molili ya pokwa ekweyaki na bikuke ya Yelusalemi, liboso ete mokolo ya Saba ebanda, napesaki mitindo ete bakanga bikuke yango mpe bafungola yango kaka soki mokolo ya Saba eleki. Bongo, natiaki ndambo ya basali na ngai na bikuke mpo na kopekisa bokoti ya mikumba, na mokolo ya Saba.
20 Once or twice the merchants and sellers of all kinds of goods spent the night outside Jerusalem. Boye, mbala moko to mibale, basombi mpe bateki biloko ya ndenge na ndenge balekisaki butu libanda ya Yelusalemi.
21 So I warned them and said, "Why spend the night by the wall? If you do it again, I will lay hands on you." From then on, they didn't come on the Sabbath. Nakebisaki bango makasi mpe nalobaki : — Mpo na nini bozali kolekisa butu pembeni ya mir ? Soki bozongeli lisusu kosala bongo, nakokanga bino. Wuta na tango wana, batikalaki lisusu koya te na mokolo ya Saba.
22 Then I commanded the Levites to purify themselves, come guard the gates, and keep the Sabbath day holy. Remember this for me too, my Father, and spare me by your great faithful love. Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo !
23 In those days I also saw Jews who had married Ashdodite, Ammonite, and Moabite women. Kaka na mikolo wana, namonaki lisusu bana mibali ya Yuda kobala bana basi ya Asidodi, ya Amoni mpe ya Moabi.
24 Half of their children spoke Ashdod's language, or another people's, and did not know how to speak Judah's language. Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda.
25 So I confronted them, cursed them, beat some of the men, and pulled out their hair. I made them swear by our Father: "Don't give your daughters to their sons, or take their daughters for your sons or yourselves. Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.
26 Didn't marriages like these make Solomon king of Israel sin? No king among the many nations equaled him; our Father loved him, and our Father made him king over all Israel. Yet foreign women led even him into sin. Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.
27 Should we listen to you and do all this great evil, betraying our Father by marrying foreign women?" Boni, tosengeli sik’oyo koyoka ete bino mpe bozali kosala mabe wana monene mpe bozangi boyengebene liboso ya Nzambe na biso likolo ya kobala basi ya bapaya ?
28 A son of Jehoiada, son of Eliashib the high priest, was son-in-law to Sanballat the Horonite, so I drove him from me. Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.
29 Remember them, my Father, for they made the priesthood unclean, and the covenant of priesthood and Levites. Oh Nzambe na ngai, kobosana bato wana te, mpo ete babebisaki bosantu ya bonganga-Nzambe mpe boyokani na Yo elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi.
30 So I purified them from everything foreign, and assigned priests' and Levites' duties, each to his task. Napetolaki Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo na kolongola mbindo nyonso ya bapaya mpe nazongisaki bango na mosala, moto na moto na mokumba na ye.
31 I arranged the wood offering at set times, and the firstfruits. Remember me, my Father, with favor. Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]