Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 These are the priests and Levites who came up with Zerubbabel son of Shealtiel and Jeshua: Seraiah, Jeremiah, Ezra, Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue : Seraya, Jeremi, Esidrasi,
2 Amariah, Malluch, Hattush, Amaria, Maluki, Atushi,
3 Shecaniah, Rehum, Meremoth, Shekania, Rewumi, Meremoti,
4 Iddo, Ginnethoi, Abijah, Ido, Ginetoyi, Abiya,
5 Mijamin, Maadiah, Bilgah, Miyamini, Maadia, Biliga,
6 Shemaiah, Joiarib, Jedaiah, Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya,
7 Sallu, Amok, Hilkiah, Jedaiah—heads of the priests and their relatives in Jeshua's days. Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya. Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue.
8 The Levites: Jeshua, Binnui, Kadmiel, Sherebiah, Judah, and Mattaniah, who with his brothers led the songs of thanksgiving. Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi.
9 Bakbukiah and Unni, their brothers, stood opposite them during their turns of service. Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu.
10 Jeshua was the father of Joiakim, Joiakim the father of Eliashib, Eliashib the father of Joiada, Jozue abotaki Yoakimi, Yoakimi abotaki Eliashibi, Eliashibi abotaki Yoyada,
11 Joiada the father of Jonathan, and Jonathan the father of Jaddua. Yoyada abotaki Jonatan, Jonatan abotaki Yaduwa.
12 In Joiakim's days, these priests headed ancestral houses: Meraiah for Seraiah's house, Hananiah for Jeremiah's, Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi : mpo na libota ya Seraya : Meraya ; mpo na libota ya Jeremi : Anania ;
13 of Ezra's, Meshullam; of Amariah's, Jehohanan; mpo na libota ya Esidrasi : Meshulami ; mpo na libota ya Amaria : Yoanani ;
14 of Malluchi's, Jonathan; of Shebaniah's, Joseph; mpo na libota ya Meluki : Jonatan ; mpo na libota ya Shebania : Jozefi ;
15 of Harim's, Adna; of Meraioth's, Helkai; mpo na libota ya Arimi : Adina ; mpo na libota ya Merayoti : Elikayi ;
16 of Iddo's, Zechariah; of Ginnethon's, Meshullam; mpo na libota ya Ido : Zakari ; mpo na libota ya Ginetoni : Meshulami ;
17 of Abijah's, Zichri; of Miniamin's and Moadiah's, Piltai; mpo na libota ya Abiya : Zikiri ; mpo na libota ya Minyamini : Moadia, Pilitayi ;
18 of Bilgah's, Shammua; of Shemaiah's, Jehonathan; mpo na libota ya Biliga : Shamuwa ; mpo na libota ya Shemaya : Jonatan ;
19 of Joiarib's, Mattenai; of Jedaiah's, Uzzi; mpo na libota ya Yoyaribi : Matinayi ; mpo na libota ya Yedaeya : Uzi ;
20 of Sallai's, Kallai; of Amok's, Eber; mpo na libota ya Salu : Kalayi ; mpo na libota ya Amoki : Eberi ;
21 of Hilkiah's, Hashabiah; of Jedaiah's, Nethanel. mpo na libota ya Ilikia : Ashabia ; mpo na libota ya Yedaeya : Netaneeli.
22 In the days of Eliashib, Joiada, Johanan, and Jaddua, the heads of the Levite families were recorded, as were the priests during the reign of Darius the Persian. Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi.
23 Levite family heads were recorded in the Book of the Chronicles until Johanan son of Eliashib's days. Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko.
24 The Levite leaders were Hashabiah, Sherebiah, and Jeshua son of Kadmiel, with their brothers opposite them, praising and giving thanks, one group answering the other, as David the man of our Father had commanded. Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.
25 Mattaniah, Bakbukiah, Obadiah, Meshullam, Talmon, and Akkub were gatekeepers guarding the storerooms by the gates. Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe.
26 These served in the days of Joiakim son of Jeshua son of Jozadak, and in the days of Nehemiah the governor and Ezra the priest and scribe. Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe.
27 For the dedication of Jerusalem's wall, they sought out the Levites from wherever they lived and brought them to Jerusalem to celebrate the dedication with joy—thanksgiving, singing, cymbals, harps, and lyres. Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire.
28 The singers also gathered together from the district around Jerusalem and from the villages of the Netophathites, Babengisaki lisusu bayembi longwa na etuka oyo ezalaki zingazinga ya Yelusalemi, longwa na bamboka mike-mike ya bato ya Netofa,
29 from Beth-gilgal and the countryside of Geba and Azmaveth, since the singers had built villages for themselves around Jerusalem. longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi.
30 When the priests and Levites had purified themselves, they purified the people, the gates, and the wall. Tango Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki, bapetolaki mpe bato, bikuke mpe mir.
31 Then I brought Judah's leaders up onto the wall and set two large thanksgiving choirs in place. One marched right, atop the wall, toward the Dung Gate. Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu.
32 Hoshaiah and half the leaders of Judah followed them, Na sima na bango, bato oyo bazalaki kolanda : Oze mpe ndambo ya bakambi ya Yuda,
33 along with Azariah, Ezra, Meshullam, Azaria, Esidrasi, Meshulami,
34 Judah, Benjamin, Shemaiah, and Jeremiah, Yuda, Benjame, Shemaya, Jeremi,
35 and some priests' sons with trumpets: Zechariah son of Jonathan, son of Shemaiah, son of Mattaniah, son of Micaiah, son of Zaccur, son of Asaph, ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ;
36 and his brothers—Shemaiah, Azarel, Milalai, Gilalai, Maai, Nethanel, Judah, and Hanani—with the musical instruments of David, the man of our Father; Ezra the scribe led the procession. mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango.
37 At the Fountain Gate, they went straight up the stairs of the City of David, up the wall's ascent, past the house of David, to the Water Gate on the east. Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este.
38 The second choir went left; I followed with half the people, atop the wall, past the Tower of the Ovens to the Broad Wall, Lisanga ya mibale ya bayembi ezalaki kotambola na nzela ya ngambo ya loboko ya mwasi. Nazalaki kolanda bango na likolo ya mir elongo na ndambo ya bato, longwa na ndako molayi ya Fulu kino na mir ya monene,
39 and past the Gate of Ephraim, the Jeshanah Gate, the Fish Gate, the Tower of Hananel, the Tower of the 100, to the Sheep Gate, stopping at the Gate of the Guard. na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.
40 The two thanksgiving choirs stood in the house of our Father—so did I, with half the officials who were with me, Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato
41 and the priests Eliakim, Maaseiah, Miniamin, Micaiah, Elioenai, Zechariah, and Hananiah with their trumpets. mpe mpo na Banganga-Nzambe oyo : Eliakimi, Maaseya, Minyamini, Mishe, Eliowenayi, Zakari mpe Anania oyo bamemaki bakelelo na bango.
42 Also Maaseiah, Shemaiah, Eleazar, Uzzi, Jehohanan, Malchijah, Elam, and Ezer. The singers sang, led by Jezrahiah. Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya.
43 That day they offered great sacrifices and rejoiced, for our Father gave them great joy. Women and children rejoiced too, and Jerusalem's joy was heard far away. Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika.
44 That day men were appointed over the storerooms for contributions, firstfruits, and the tenth, to gather from the town fields the portions the Law assigns to priests and Levites, since Judah rejoiced over the serving priests and Levites. Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,
45 They kept their duty to our Father and to purification, as did the singers and gatekeepers, as David and his son Solomon had commanded. bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali.
46 For long ago, in the days of David and Asaph, there were song leaders who led praise and thanksgiving to our Father. Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe.
47 In the days of Zerubbabel and Nehemiah, all Israel gave daily portions to the singers and gatekeepers, and set apart a share for the Levites, who set apart a share for Aaron's descendants. Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]