Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Nehemiah 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Leaders lived in Jerusalem; the rest cast lots to bring one of every ten to live in Jerusalem, the holy city, leaving nine-tenths in the towns. Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango.
2 And the people blessed all the men who freely offered to live in Jerusalem. Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.
3 These are the province's leaders who lived in Jerusalem; but in Judah's towns, each lived on his own property, in their towns—Israel, the priests, Levites, temple servants, and Solomon's servants' descendants. Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;
4 Some descendants of Judah and Benjamin lived in Jerusalem. From Judah: Athaiah son of Uzziah, son of Zechariah, son of Amariah, son of Shephatiah, son of Mahalalel, from the descendants of Perez; mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi : Mpo na bakitani ya Yuda : Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi ;
5 and Maaseiah son of Baruch, son of Col-hozeh, son of Hazaiah, son of Adaiah, son of Joiarib, son of Zechariah, son of the Shilonite. mpe Maaseya, mwana mobali ya Baruki, mwana mobali ya Koli-Oze, mwana mobali ya Azaya, mwana mobali ya Adaya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Zakari, moko kati na bakitani ya Shiloni.
6 All the descendants of Perez who lived in Jerusalem numbered 468 able men. Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.
7 From Benjamin: Sallu son of Meshullam, son of Joed, son of Pedaiah, son of Kolaiah, son of Maaseiah, son of Ithiel, son of Jeshaiah, Mpo na bakitani ya Benjame : Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Yoedi, mwana mobali ya Pedaya, mwana mobali ya Kolaya, mwana mobali ya Maaseya, mwana mobali ya Itieli, mwana mobali ya Ezayi ;
8 and after him Gabbai and Sallai—928 in all. mpe Gabayi elongo na Salayi. Bango nyonso bazalaki bato nkama libwa na tuku mibale na mwambe.
9 Joel son of Zichri oversaw them; Judah son of Hassenuah was second over the city. Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango ; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba.
10 Of the priests: Jedaiah son of Joiarib, Jachin, Kati na Banganga-Nzambe : Yedaeya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Yakini ;
11 Seraiah son of Hilkiah, son of Meshullam, son of Zadok, son of Meraioth, son of Ahitub, chief officer of our Father's house; Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe
12 and their brothers who did the house's work: 822; and Adaiah son of Jeroham son of Pelaliah son of Amzi son of Zechariah son of Pashhur son of Malchijah, elongo na bandeko na bango, nkama mwambe na tuku mibale na mibale oyo bazalaki kosala na Ndako ya Nzambe ; Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pelalia, mwana mobali ya Amitsi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya
13 and his brothers, family heads—242; and Amashsai son of Azarel, son of Ahzai, son of Meshillemoth, son of Immer, elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota ; Amashisayi, mwana mobali ya Azareyeli, mwana mobali ya Azayi, mwana mobali ya Meshilemoti, mwana mobali ya Imeri, azalaki mpe elongo na bango.
14 and their associates, able warriors—128; their overseer was Zabdiel son of Haggedolim. Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango.
15 Of the Levites: Shemaiah son of Hasshub, son of Azrikam, son of Hashabiah, son of Bunni; Kati na Balevi : Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Buni ;
16 and Shabbethai and Jozabad, from the heads of the Levites, oversaw the outside work of our Father's house; Shabetayi mpe Yozabadi oyo bazalaki na molongo ya bakambi ya Balevi mpe bazalaki na mokumba ya misala ya libanda ya Ndako ya Nzambe ;
17 and Mattaniah son of Mica, son of Zabdi, son of Asaph, who led in thanksgiving and prayer; Bakbukiah, second among his associates; and Abda son of Shammua, son of Galal, son of Jeduthun. Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ; Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni.
18 All the Levites in the holy city numbered 284. Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei.
19 The gatekeepers—Akkub, Talmon, and their associates who kept watch at the gates—numbered 172. Bakengeli bikuke : Akubi, Talimoni elongo na bandeko na bango, oyo bazalaki bakengeli bikuke. Bango nyonso bazalaki bato nkama moko na tuku sambo na mibale.
20 The rest of Israel, the priests, and the Levites were in all Judah's towns, each on his inheritance. Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye.
21 The temple servants lived on Ophel, with Ziha and Gishpa over the temple servants. Basali ya Tempelo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, mpe Tsika elongo na Gishipa bazalaki bakambi na bango.
22 Uzzi son of Bani, son of Hashabiah, son of Mattaniah, son of Mica, of Asaph's descendants, oversaw the Levites in Jerusalem, the singers responsible for the work of our Father's house. Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe.
23 For there was a command from the king concerning them, and a fixed daily allowance for the singers. Misala ya bayembi ezalaki kotambolisama mokolo na mokolo na mitindo ya mokonzi.
24 Pethahiah son of Meshezabel, of Zerah son of Judah's descendants, was at the king's hand for every matter about the people. Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato.
25 As for the villages with their fields, some of Judah's descendants lived in Kiriath-arba and its villages, Dibon and its villages, Jekabzeel and its settlements, Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
26 in Jeshua, in Moladah, in Beth-pelet, kati na Yeshua, kati na Molada, kati na Beti-Paleti,
27 in Hazar-shual, in Beersheba and its villages, kati na Atsari-Shuwali, kati na Beri-Sheba mpe bamboka na yango ya mike-mike,
28 in Ziklag, in Meconah and its villages, kati na Tsikilagi, kati na Mekona mpe bamboka na yango ya mike-mike,
29 in En-rimmon, in Zorah, in Jarmuth, kati na Eini-Rimoni, kati na Tsorea, kati na Yarimuti,
30 Zanoah, Adullam and their villages, Lachish and its fields, Azekah and its villages. So they settled from Beersheba to the Hinnom Valley. kati na Zanoa, Adulami mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Lakishi mpe bilanga na yango ya zingazinga, mpe kati na Azeka mpe bamboka na yango ya mike-mike. Boye bavandaki na etuka mobimba longwa na Beri-Sheba kino na Lubwaku ya Inomi.
31 The descendants of Benjamin lived from Geba onward, at Michmash, Aija, Bethel and its villages, Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
32 Anathoth, Nob, Ananiah, kati na Anatoti, Nobi mpe Anania,
33 Hazor, Ramah, Gittaim, kati na Atsori, Rama mpe Gitayimi,
34 Hadid, Zeboim, Neballat, kati na Adidi, Tseboyimi mpe Nebalati,
35 Lod, and Ono, the Valley of Craftsmen. kati na Lodi mpe Ono, lubwaku ya bato oyo basalaka misala ya maboko.
36 And some divisions of the Levites from Judah were assigned to Benjamin. Masanga mosusu ya Balevi ya Yuda ekendeki kovanda kati na bato ya Benjame.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]