Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Amos 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hear this word that I raise as a lament over you, house of Israel: Oh libota ya Isalaele, boyoka maloba oyo, eleli oyo nazali koloba na tina na bino :
2 Fallen, never to rise again, is the virgin Israel; she lies abandoned on her own land, with no one to raise her up. « Isalaele, mboka kitoko, ekweyi na mabele, ezali kokoka kotelema lisusu te ! Basundoli yango kaka bongo, mpe moto akotelemisa yango azali te. »
3 For the Sovereign Father says: The city that marches out 1,000 will have one hundred left; the one marching out one hundred will have ten left—for the house of Israel. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Engumba oyo ekotinda basoda nkoto moko mpo na kobundela Isalaele ekotikala kaka na basoda nkama moko, mpe oyo ekotinda basoda nkama moko ekotikala kaka na basoda zomi. »
4 For this is what our Father says to the house of Israel: Seek me and live. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na libota ya Isalaele : « Bozonga epai na Ngai mpe bokobika !
5 But do not seek Bethel, do not go to Gilgal, do not cross over to Beersheba; for Gilgal will surely go into exile, and Bethel will come to nothing. Bokende koluka na Beteli te, bokende na Giligali te, bosala mobembo na Beri-Sheba te. Pamba te Giligali ekokende na bowumbu, mpe Beteli ekokoma eloko pamba. »
6 Seek our Father and live, or he will sweep like fire through the house of Joseph; it will devour, with no one to quench it for Bethel. Boluka Yawe mpe bokobika, soki te akokitela libota ya Jozefi lokola moto oyo ekozikisa yango, mpe moto moko te akozala na Beteli mpo na koboma yango.
7 You who turn justice into bitter poison and throw righteousness to the ground. Bino bato oyo bobongolaka bosembo ngenge mpe bobwakaka bosolo na mabele,
8 He who made the Pleiades and Orion, who turns deep darkness into morning and darkens day into night, who summons the waters of the sea and pours them out over the face of the earth—our Father is his name. boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili ; Kombo na Ye ezali : Yawe.
9 He flashes destruction on the strong, and ruin comes upon the fortress. Akweyisaka bato ya makasi mpe abebisaka engumba ya makasi.
10 They hate the one who reproves in the gate, and they despise the one who speaks the truth. Bino bato boyinaka moto oyo akataka makambo na bosembo mpe botiolaka moto oyo alobaka solo,
11 Therefore, because you trample on the poor and exact from him a tax of grain, you have built houses of cut stone, but you will not live in them; you have planted lovely vineyards, but you will not drink their wine. lokola bozali konyokola babola mpe kobotola bambuma na bango ya ble, bokovanda te na bandako oyo botongaki na mabanga bakata, bokomela te masanga ya vino ya bilanga kitoko ya vino oyo bolonaki.
12 For I know how many are your offenses and how great your sins—you who afflict the righteous and take bribes and push aside the needy in the gate. Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene : bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
13 Therefore the prudent keep silent in such a time, for it is an evil time. Boye, moto ya mayele alobaka te na tango ya boye, pamba te mikolo ezali mabe.
14 Seek good and not evil, that you may live; and so the Father of heaven's armies will be with you, just as you have claimed. Bolukaka kosala bolamu, kasi mabe te, mpo ete bokoka kobika. Boye, Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, akozala elongo na bino, ndenge kaka bozali koloba yango.
15 Hate evil and love good, and establish justice in the gate; perhaps the Father of heaven's armies will be gracious to the remnant of Joseph. Boyinaka kosala mabe, kasi bolingaka nde kosala bolamu ; bolukaka bosembo tango bozali kosambisa. Tango mosusu Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoyokela ndambo ya bato oyo bamikomisaki mbindo te mawa kati na libota ya Jozefi.
16 So the Father of heaven's armies says: In every square, wailing; in every street, they cry, "Alas! Alas!" They call the farmer to mourning, and those skilled in lament to wailing. Yango wana, tala liloba oyo Nkolo, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Kolela ekozala na babalabala nyonso, mpe koganga ya somo ekozala na bisika nyonso oyo bato bakutanaka. Bakobengisa basali bilanga na matanga, mpe bato oyo balelaka bibembe mpo na kolela.
17 In all the vineyards there will be wailing, for I will pass through your midst, says our Father. Kolela ekozala na bilanga nyonso ya vino, pamba te nakoleka kati na bino, » elobi Yawe.
18 Woe to you who long for the day of our Father! Why would you want the day of our Father? It is darkness, not light. Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe ! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe ? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.
19 It will be as if a man fled from a lion only to meet a bear, or went into his house and rested his hand on the wall only to be bitten by a snake. Ekozala lokola moto oyo azali kokima nkosi, bongo akutani na ngombolo ; lokola moto oyo akoti na ndako na ye mpe atie loboko na ye na mir, bongo nyoka eswi ye.
20 Will not the day of our Father be darkness, not light—pitch-dark, with no brightness in it? Boni, mokolo ya Yawe ekozala te mokolo ya molili ? Boni, ekozala te mokolo oyo ezanga pole ? Ekozala penza mokolo ya molili makasi, ata kongenga moke ekozala te.
21 I hate, I despise your festivals; I take no delight in your solemn assemblies. Nayini bafeti na bino ya bule, nazali kosepela na yango ata moke te ; mayangani na bino ya bule ezali kolumba solo mabe liboso na Ngai.
22 Even if you offer me burnt offerings and your grain offerings, I will not accept them; and the peace offerings of your fattened animals I will not even look at. Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te ; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.
23 Take away from me the noise of your songs; I will not listen to the music of your harps. Bolongola makelele ya banzembo na bino liboso na Ngai ! Nakoyoka mindule ya mandanda na bino te.
24 But let justice roll down like waters, and righteousness like an ever-flowing stream. Kasi tika ete makambo ekatama na bosolo ndenge ebale etiolaka, mpe bosembo etambola lokola ebale oyo ekawukaka te.
25 Did you bring me sacrifices and offerings those forty years in the wilderness, house of Israel? Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka mpe kopesa Ngai makabo na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe ?
26 You have lifted up Sikkuth your king and Kiyyun your star-god, the images you made for yourselves. Nzokande, botombolaki ndako ya kapo ya Sikuti, mokonzi na bino, mpe evandelo ya Kevani, nzambe na bino ya ekeko, monzoto ya nzambe na bino oyo bomisalelaki.
27 So I will send you into exile beyond Damascus, says our Father—the Father of heaven's armies is his name. Yango wana nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Damasi, elobi Ye oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]