Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Amos 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Woe to those who are at ease in Zion, and to those who feel secure on the mountain of Samaria—the notable men of the foremost nation, to whom the house of Israel comes! Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka !
2 Cross over to Calneh and look; from there go on to Hamath the great; then go down to Gath of the Philistines. Are you better than these kingdoms? Or is their territory greater than yours? Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna ! Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene, mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia ! Boni, bingumba oyo eleki penza bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu ? Mpe etando na yango eleki ya bino na monene ?
3 You push away the day of disaster, yet you bring near a reign of violence. Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima mpe komibendela bokonzi ya somo.
4 They lie on beds of ivory and sprawl on their couches, eating lambs from the flock and calves from the fattening pen. Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.
5 They strum away on the harp and, like David, invent musical instruments for themselves. Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.
6 They drink wine by the bowlful and anoint themselves with the finest oils, but they are not grieved over the ruin of Joseph. Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino, kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.
7 Therefore they will now go into exile at the head of the exiles, and the revelry of those who sprawl at ease will pass away. Yango wana bokozala bato ya liboso mpo na kokende na bowumbu, mpe bafeti ya bato oyo bamivandisaka na bakiti ya kitoko ekosila.
8 The Sovereign Father has sworn by himself—this is the declaration of the Father of heaven's armies: I despise the pride of Jacob and hate his strongholds, and I will hand over the city and everything in it. Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »
9 And if ten men are left in one house, they too will die. Soki bato zomi batikali na bomoi kati na ndako moko, bango mpe bakokufa.
10 And when a man's relative, the one who burns the bodies, lifts him to carry the bones out of the house, and calls to whoever is in the innermost room, "Is anyone still with you?" and he answers, "No one," then he will say, "Hush! We must not invoke the name of our Father." Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna : — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna ? Akozongisa : — Te, moto mosusu azali te ! Bongo akoloba lisusu : — Esili ! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.
11 For look, our Father gives the command, and the great house will be smashed to fragments and the little house to bits. Pamba te Yawe apesi mitindo, boye akobuka-buka na biteni ndako monene mpe akobuka-buka na biteni ya mike-mike ndako moke.
12 Do horses gallop on a cliff? Does one plow the sea with oxen? Yet you have turned justice into poison and the fruit of righteousness into bitter poison. Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
13 You who rejoice over Lo-debar and say, "Have we not by our own strength taken Karnaim for ourselves?" Bozali kosepela mpo ete bozwi Lo-Debari mpe bozali komikumisa na koloba : « Boni, tobotoli engumba Karinayimi na makasi na biso moko te ? »
14 But look—I am raising up against you a nation, house of Israel, declares the Father of heaven's armies, and they will oppress you from Lebo-hamath all the way to the Brook of the Arabah. Mpo na yango, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Oh libota ya Isalaele, nakobimisa ekolo moko oyo ekobundisa mpe ekonyokola yo tango nyonso wuta na Lebo-Amati kino na lubwaku ya Araba. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]