Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The apostles and brothers in Judea heard that Gentiles too had received our Father's word. Bantoma mpe bandimi oyo bazalaki kati na Yuda bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba na Nzambe.
2 So when Peter went up to Jerusalem, those of the circumcision party criticized him, Boye, tango Petelo azongaki na Yelusalemi, Bayuda oyo bandimelaki Yesu bapamelaki ye
3 saying, "You visited uncircumcised men and ate with them." mpe balobaki : — Okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango !
4 But Peter explained it to them step by step: Petelo ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge esalemaki ; alobaki na bango :
5 Praying in the city of Joppa, I fell into a trance and saw a vision: a huge sheet-like object, lowered from heaven by its four corners, reaching me. — Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.
6 Looking closely at it, I saw four-legged animals, wild beasts, reptiles, and birds. Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya likolo.
7 And I heard a voice saying to me, 'Get up, Peter; kill and eat.' Nayokaki mpe mongongo moko koloba na ngai : « Petelo, telema ! Boma mpe lia. »
8 But I said, 'By no means, Lord; for nothing impure or unclean has ever entered my mouth.' Kasi nazongisaki : « Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto. »
9 But the voice answered a second time from heaven, 'What our Father has made clean, do not call impure.' Mongongo yango elobaki lisusu, wuta na likolo, mpo na mbala ya mibale : « Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te ! »
10 This happened three times, and all of it was drawn up again into heaven. Esalemaki bongo mbala misato. Bongo babendaki nyonso kati na Likolo.
11 Right then three men, sent to me from Caesarea, arrived at the house where we stayed. Kaka na tango yango, bato misato bakomaki na ndako epai wapi nazalaki kovanda ; batindaki bango epai na ngai longwa na Sezarea.
12 The Spirit told me to go with them, making no distinction. These six brothers also went with me, and we entered the man's house. Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bandeko motoba bakendeki elongo na ngai kino na Sezarea, mpe tokotaki na ndako ya moto yango.
13 He told us how he saw the angel standing in his house and saying, 'Send to Joppa and bring Simon called Peter; Moto yango ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye kati na ndako na ye mpe koloba na ye : « Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo.
14 he will bring you a message by which you will be saved, you and all your household.' Akoyebisa yo maloba oyo, na nzela na yango, okozwa lobiko, yo mpe libota na yo mobimba ! »
15 When I began speaking, the Holy Spirit fell on them just as on us at first. Wana nazalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bango ndenge kaka akitelaki biso na ebandeli.
16 Then I remembered what our Lord Jesus said: 'John baptized with water, but you will be baptized with the Holy Spirit.' Mbala moko, nakanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki : « Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »
17 If our Father gave them the same gift he gave us who believed in the Lord Jesus Christ, who was I to stand in our Father's way? Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu-Klisto, bongo ngai nde nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi ?
18 Hearing this, they quieted down and praised our Father, saying, "So our Father has granted repentance that leads to life even to the Gentiles." Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa, mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Nzambe asali ete ata bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpo bazwa bomoi. »
19 Those scattered by the persecution over Stephen traveled as far as Phoenicia, Cyprus, and Antioch, speaking the message to no one but Jews. Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda.
20 But some of them—men from Cyprus and Cyrene—reached Antioch and spoke to Hellenists too, telling the good news about the Lord Jesus. Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki.
21 The hand of our Lord Jesus was with them, and many believed and turned to the Lord. Nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango, mpe bato ebele penza bandimaki mpe bamipesaki na Nkolo.
22 The church in Jerusalem heard about this and sent Barnabas to Antioch. Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi, mpe batindaki Barnabasi, na Antioshe.
23 Arriving, he saw our Father's grace and rejoiced, urging all to remain devoted to the Lord with firm hearts. Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.
24 For he was a good man, full of the Holy Spirit and faith, and a large crowd was added to the Lord. Solo, Barnabasi azalaki moto malamu, azalaki atondisama na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele bakangamaki na Nkolo.
25 So Barnabas went to Tarsus to look for Saul, Bongo, Barnabasi akendeki na Tarse mpo na koluka Saulo ;
26 finding him, he brought him to Antioch. For a full year they met with the church and taught a large crowd, and in Antioch the disciples were first called Christians. mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.
27 In these days prophets came down from Jerusalem to Antioch. Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi.
28 One of them, named Agabus, stood up and predicted through the Spirit that a great famine would come over the whole world—it happened in Claudius's days. Moko kati na bango, kombo na ye ezalaki « Agabisi ; » atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na bamboka nyonso oyo bato ya Rome bazali kokonza. Nzala yango ekotaki na tango ya mokonzi Klode.
29 The disciples decided, each according to ability, to send relief to the brothers living in Judea. Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda.
30 And they did so, sending it to the elders through Barnabas and Saul. Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]