Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 About that time King Herod attacked some who belonged to the church, intending to harm them. Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango.
2 He had James, the brother of John, put to death with the sword. Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga.
3 Seeing that this pleased the Jews, Herod proceeded to seize Peter too, during the days of Unleavened Bread. Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire.
4 He arrested him, put him in prison, and handed him to four squads of four soldiers to guard, intending to bring him out to the people after the Passover. Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye ; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.
5 Peter was kept in prison, but the church prayed fervently to our Father for him. Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye.
6 That night, before Herod could bring him out, Peter slept between two soldiers, bound with two chains; guards before the door kept watch over the prison. Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.
7 Suddenly an angel of our Father stood beside him, and light filled the cell. He struck Peter's side, woke him, and said, "Get up quickly." The chains fell from his hands. Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye : — Telema noki ! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
8 The angel told him, "Get dressed and put on your sandals." Peter complied. Then he said, "Wrap your cloak around you and follow me." Anjelu alobaki na ye : — Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo ! Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu : — Lata nzambala na yo mpe landa ngai.
9 So Peter went out and followed, not knowing the angel's actions were real—he thought he saw a vision. Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli.
10 Passing the first and second guard posts, they reached the iron gate to the city, which opened for them on its own. They went out, walked one street, and the angel suddenly left him. Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango ; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo.
11 Then Peter came to himself and said, "Now I know for certain: our Father sent his angel and rescued me from Herod's hand and from everything the Jewish people expected." Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki : — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.
12 Aware of this, he went to Mary's house, mother of John also called Mark, where many were gathered praying. Tango amonaki bongo, akendeki na ndako ya Mari, mama ya Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. » Bandimi ebele basanganaki kuna mpe bazalaki kosambela.
13 When Peter knocked at the door of the gateway, a servant girl named Rhoda came to answer. Petelo abetaki ekuke ; mpe mwasi mosali moko, kombo na ye « Rode, » apusanaki na ekuke mpo na koyanola.
14 Recognizing Peter's voice, she was so overjoyed she ran in without opening the gate, announcing Peter stood there. Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Petelo, atondaki na esengo ; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu mpe agangaki : — Eh, ezali Petelo ! Azali wana, na libanda, liboso ya ekuke !
15 "You're out of your mind," they said. But she insisted it was true. So they said, "It's his angel." Balobaki na ye : — Okomi penza na liboma ! Kasi Rode azalaki kaka koloba : — Ya solo penza ! Petelo azali na libanda. Bongo balobaki : — Ekoki kozala anjelu na ye !
16 But Peter kept on knocking, and when they opened the door and saw him, they were astonished. Nzokande, Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi.
17 Signaling with his hand for quiet, he explained how our Father had led him out of prison. "Tell James and the brothers and sisters this," he said, then left for another place. Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu : — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.
18 When morning came, there was no small commotion among the soldiers over what had become of Peter. Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana : — Likambo nini ekomelaki Petelo ?
19 Herod, after searching for him and not finding him, questioned the guards and ordered them executed. Then he went down from Judea to Caesarea and stayed there. Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango. Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea.
20 Herod was enraged at Tyre and Sidon. Together they came to him, and having won over Blastus, the king's chamberlain, they requested peace, since their land depended on the king's land for food. Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.
21 On the set day Herod dressed in royal robes, sat on the throne, and made a speech to them. Tango mokolo oyo akataki ekokaki, Erode alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alobaki na bato.
22 And the crowd kept shouting, "This is the voice of a god, not of a man!" Bato bagangaki : — Tala yango oyo, mongongo ya nzambe ; ezali mongongo ya moto te !
23 Instantly an angel of our Father struck him down for not giving our Father the glory, and worms ate him and he died. Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te ; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.
24 But the word of our Father continued to grow and spread. Kasi Liloba na Nzambe ekobaki kopanzana mpe kobota mbuma.
25 Barnabas and Saul returned from Jerusalem, having finished their mission, taking with them John, also called Mark. Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]