Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 There was a man in Caesarea named Cornelius, a centurion of what was called the Italian Cohort. Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »
2 He was devout, feared our Father with his whole household, gave many gifts to the people, and prayed to our Father constantly. Kornei elongo na bato nyonso ya libota na ye bazalaki komipesa na makambo ya Nzambe mpe kotosa Nzambe ; azalaki kosunga bato oyo bazalaki kati na bosenga ya ndenge na ndenge mpe kosambela Nzambe tango nyonso.
3 About three in the afternoon he saw clearly in a vision an angel of our Father come to him and say, "Cornelius." Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !
4 Staring at him, terrified, he said, "What is it, sir?" The angel replied, "Your prayers and gifts to the poor have risen as a memorial before our Father." Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki : — Nkolo, likambo nini ? Anjelu azongisaki : — Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka epai ya babola emati liboso ya Nzambe, mpe akanisi yango.
5 Now send men to Joppa and bring a man named Simon, who is called Peter. Sik’oyo, tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo ; »
6 He is lodging with a tanner named Simon, whose house is by the sea. azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene.
7 When the angel who spoke to him left, Cornelius called two of his household servants and a devout soldier from among his regular attendants, Tango kaka anjelu oyo asololaki na ye akendeki, Kornei abengaki basali mibale kati na basali na ye, mpe soda moko oyo azalaki komipesa na makambo ya Nzambe, kati na basoda oyo bazalaki kosalela ye.
8 and after explaining everything to them, he sent them to Joppa. Ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa.
9 The next day, as they journeyed and neared the city, Peter went up on the roof to pray, about noon. Mokolo oyo elandaki, na ngonga pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Petelo amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kosambela.
10 He grew hungry and wanted to eat, but while they prepared food, a trance came over him, Ayokaki nzala mpe azalaki na posa ya kolia, mpe wana bazalaki nanu kobongisela ye bilei, akweyaki na Molimo.
11 and saw heaven opened, and something like a large sheet coming down, lowered by its four corners to the earth. Amonaki Likolo efungwami, mpe eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei ezali kokita na mabele.
12 It held all kinds of four-footed animals and reptiles of the earth and birds of the air. Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe ya bandeke ya likolo.
13 And a voice came to him: "Rise, Peter; kill and eat." Bongo mongongo moko elobaki na ye : — Petelo, telema. Boma mpe lia.
14 But Peter said, "Absolutely not, Lord; for I have never eaten anything common or unclean." Petelo azongisaki : — Te, Nkolo ! Natikala nanu kolia te eloko ya mbindo to ya bosoto.
15 The voice came to him again, a second time: "What I have made clean, don't call common." Mongongo yango elobaki na ye, mpo na mbala ya mibale : — Eloko nyonso oyo Nzambe akomisi peto, yo, komona yango mbindo te !
16 This happened three times, and at once the sheet was taken up to heaven. Esalemaki bongo mbala misato, mpe eloko yango elimwaki kati na Likolo.
17 While Peter was puzzled over what the vision meant, suddenly the men sent by Cornelius, having asked the way to Simon's house, stood at the gate, Petelo akamwaki mingi mpe akomaki komituna ndimbola ya emoniseli oyo awuti kozwa. Kaka na tango yango, batindami ya Kornei bamonaki ndako ya Simona, oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke.
18 and called out to ask whether Simon who was called Peter was lodging there. Babelelaki mpe batunaki soki ezali kuna nde Simona avandaka, Simona oyo kombo na ye mosusu ezali « Petelo. »
19 As Peter thought about the vision, the Holy Spirit said to him, "Three men are looking for you. Wana Petelo azalaki kaka komitungisa mpo na emoniseli oyo awuti kozwa, Molimo alobaki na ye : — Simona, bato misato bazali koluka yo.
20 Get up, go downstairs, and go with them without hesitation, for I have sent them." Telema mpe kita. Kende elongo na bango, kotia tembe te, pamba te ngai nde natindi bango.
21 Peter went down to the men and said, "I'm the one you're looking for. Why have you come?" Petelo akitaki mpe alobaki na bato yango : — Ngai oyo ! Ezali ngai nde bozali koluka. Boyei mpo na nini ?
22 They said, "Cornelius, a centurion, upright, fears our Father, and respected by the whole Jewish nation, was told by a holy angel to summon you to his house and hear what you have to say." Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.
23 So he invited them in and hosted them. Next day he set out with them, joined by some brothers from Joppa. Petelo akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Mokolo oyo elandaki, Petelo akendeki elongo na bango, mpe ndambo ya bandimi balandaki ye wuta na Jafa.
24 The next day he entered Caesarea. Cornelius, expecting them, had gathered his relatives and close friends. Sima na mokolo moko, bakomaki na Sezarea. Kornei azalaki kozela bango, mpe abengisaki bato ya libota na ye mpe balingami na ye mpo ete bazala lisanga.
25 When Peter entered, Cornelius met him and fell down at his feet and worshiped him. Tango Petelo alingaki kokota na ndako, Kornei apusanaki pene na ye, amibwakaki na makolo na ye mpo na kogumbamela ye.
26 But Peter lifted him up, saying, "Stand up! I'm a man too." Kasi Petelo atelemisaki ye ; alobaki : — Telema ! Ngai mpe nazali kaka moto.
27 While talking with Cornelius, Peter went in and found many people gathered. Wana bazalaki kosolola, Petelo akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani.
28 He said to them, "You yourselves know it's unlawful for a Jew to associate with or visit someone of another nation. But our Father showed me I should call no one common or unclean. Alobaki na bango : — Boyebi malamu ete mibeko na biso epekisa Moyuda kosangana na Mopagano to kokende kotala Mopagano ; kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli te komona moto moko mbindo to bosoto.
29 So, sent for, I came without objection. Now, why did you send for me?" Yango wana, tango botindaki bato kobenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sik’oyo, nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai ?
30 Cornelius said, "Four days ago at this hour, three in the afternoon, I was praying in my house, and suddenly a man in bright clothing stood before me, Kornei azongisaki : — Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima na midi, nazalaki kosambela kati na ndako na ngai. Mbala moko, moto moko alata bilamba ya kongenga makasi atelemaki liboso na ngai
31 and said, 'Cornelius, your prayer was heard and your gifts to the poor remembered before our Father. mpe alobaki : « Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe akanisi masungi oyo opesaka epai ya babola.
32 So send to Joppa and call for Simon, known as Peter. He's staying in Simon the tanner's house, by the sea.' Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo ; azali kovanda lokola mopaya kati na ndako ya Simona, mobongisi baposo ya banyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene. »
33 So I sent for you at once, and you did well to come. Now we're all here before God, to hear all the Lord has commanded you." Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.
34 Peter spoke up: "I truly see our Father shows no favoritism, Petelo azwaki maloba mpe alobaki : — Sik’oyo, nasosoli solo ete Nzambe atalaka bilongi te,
35 but in every nation anyone who fears him and does what is right is acceptable to him. kasi andimaka bato ya bikolo nyonso, oyo batosaka Ye mpe basalaka makambo ya sembo.
36 He sent his word to the Israelites, announcing good news of peace through Jesus Christ—he is Lord of all. Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.
37 You yourselves know what happened throughout all Judea, beginning from Galilee after the baptism that John proclaimed: Boyebi makambo oyo esalemaki na Yuda mobimba, kobanda na Galile, sima na libatisi oyo Yoane ateyaki :
38 how our Father anointed Jesus of Nazareth with the Holy Spirit and power, how he went about doing good and healing all oppressed by the devil, for our Father was with him. ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.
39 We are witnesses of all he did in the Jews' land and Jerusalem—they killed him, hanging him on a tree, Biso, tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki kati na mokili ya Bayuda mpe kati na Yelusalemi. Babomaki Ye mpe babakaki Ye na ekulusu,
40 but our Father raised him on the third day and made him appear, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, na mokolo ya misato, mpe asalaki ete amonana lisusu.
41 not to all the people but to us, witnesses whom our Father chose beforehand, who ate and drank with him after he rose from the dead. Amonanaki na bato nyonso te, kasi na batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, na biso oyo toliaki mpe tomelaki elongo na Ye, sima na Ye kosekwa kati na bakufi.
42 He commanded us to preach to the people and testify: our Father appointed him judge of the living and the dead. Apesaki biso mitindo ya koteya bato mpe kotatola ete Ye nde Nzambe apona lokola Mosambisi ya bato ya bomoi mpe bakufi.
43 To him all the prophets testify that everyone believing in him receives forgiveness of sins through his name." Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye akozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya Kombo na Ye.
44 While Peter was still saying these things, the Holy Spirit fell on all who heard the word. Wana Petelo azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka Liloba.
45 The circumcised believers who came with Peter were amazed that the gift of the Holy Spirit was poured out on Gentiles too. Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
46 For they heard them speaking in tongues and praising our Father. Then Peter declared, Pamba te bayokaki bango koloba na nkota mosusu mpe kokumisa Nzambe. Bongo Petelo alobaki :
47 "Can anyone refuse water to baptize these people, who received the Holy Spirit as we did?" — Solo, moto moko te akoki koboya ete bazwa libatisi ya mayi. Bazwi Molimo Mosantu ndenge kaka biso tozwaki.
48 He ordered them baptized in Jesus Christ's name. Then they asked him to stay several days. Boye, Petelo apesaki mitindo ete babatisa bango na Kombo na Yesu-Klisto. Bongo, basengaki na Petelo ete avanda elongo na bango mpo na mwa mikolo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]