Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Timothy 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 But understand this: in the last days there will come times of difficulty. Kasi yeba malamu ete mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi :
2 For people will be self-lovers, money-lovers, boastful, arrogant, abusive, disobedient to parents, ungrateful, unholy. bato bakokoma na lokoso ya mbongo, bakokoma miyimi, lolendo, lofundu ; bakokoma kofinga Nzambe, kozanga botosi epai ya baboti na bango, koboya kozongisa matondi, kozanga limemia mpo na biloko ya bule,
3 Heartless, unforgiving, slanderous, without self-control, brutal, hating what is good, kozanga bolingo, kozanga mawa, kokosela baninga makambo, kozanga makoki ya komikanga, bato na kanza, banguna ya bolamu,
4 treacherous, reckless, swollen with conceit, lovers of pleasure rather than lovers of our Father. bateki baninga, bato ya mitema mikuse, bato na komitombola, bato balinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe ;
5 They keep the shape of devotion to God but deny its power—turn from them. bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !
6 For among these are those who slip into homes and trap weak women weighed down with sins, driven by various desires. Bamosusu kati na bango bakotaka na bandako ya bato mpe bakosaka basi ya pete oyo batonda na masumu mpe bamitikaka na lolenge nyonso ya baposa ya nzoto,
7 Always learning but never able to come to a knowledge of the truth. oyo balukaka tango nyonso koyekola kasi bakokaka ata moke te koyeba solo.
8 As Jannes and Jambres opposed Moses, these also oppose the truth—minds corrupted, disqualified regarding the faith. Ndenge Janesi mpe Jambresi batelemelaki Moyize, ndenge wana mpe bato wana batelemelaka solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esila kobeba mpe kondima na bango esila kokufa.
9 But they won't get far, for their foolishness will be clear to all, as with those two men. Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana na miso ya bato nyonso, ndenge ezalaki mpo na mibali wana mibale.
10 You, however, have followed my teaching, conduct, purpose, faith, patience, love, endurance, Nzokande yo oyebi nyonso na tina na mateya na ngai, bizaleli, makanisi, kondima, kokanga motema, bolingo, mpiko,
11 my persecutions and suffering—at Antioch, at Iconium, at Lystra, what persecutions I endured! Yet the Lord rescued me from them all. minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.
12 Indeed, all who desire to live a godly life in Christ Jesus will be persecuted, Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.
13 while evil people and impostors will go on from bad to worse, deceiving and being deceived. Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.
14 But you—stay with what you learned and became convinced of, knowing from whom you learned it, Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe ondimaki, pamba te oyebi epai ya nani oyekolaki yango ;
15 and that from infancy you have known the sacred writings, able to make you wise for salvation through faith in Christ Jesus. mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.
16 All Scripture is breathed out by our Father—useful for teaching, exposing wrong, correcting, and training in right living, Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,
17 so that the person of our Father may be complete, equipped for every good work. mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]