Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Timothy 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 I solemnly charge you before our Father and Christ Jesus, who will judge the living and the dead, by his appearing and his kingdom: Yango wana, liboso ya Nzambe mpe ya Yesu-Klisto oyo akosambisa bato ya bomoi mpe bakufi, mpe na makanisi ya kolengela koya na Ye mpe ya Bokonzi na Ye, nazali kopesa yo mitindo oyo :
2 Preach the word; stand ready in season and out; correct, rebuke, and encourage, with complete patience and teaching. teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.
3 For a time will come when they won't tolerate sound teaching, but will pile up teachers to fit their own desires, since their ears itch, Pamba te na mikolo ekoya, bato bakolinga lisusu te koyoka mateya ya solo, kasi bakomilukela bango moko, kolanda baposa na bango, bateyi oyo bakoyebisa bango makambo oyo matoyi na bango esepelaka koyoka ;
4 and will turn their ears away from the truth and wander off into myths. bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa makasi na koyoka masapo.
5 But you: stay clear-headed in everything, endure hardship, do an evangelist's work, fulfill your service. Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo.
6 For I am already being poured out like a drink offering; my time to depart has come. Pamba te nakomi pene ya kokaba bomoi na ngai lokola mbeka ya masanga mpo na Nzambe, mpe tango na ngai ya kotika mokili oyo ekoki.
7 I have fought the good fight, I have finished the race, I have kept the faith. Nabundi etumba na ngai malamu, nakomi na suka ya lisano na ngai ya kokima mbangu, nabateli kondima.
8 Now a crown of righteousness awaits me, which the Lord, the righteous judge, will give me on that day—not only to me but to all who have loved his appearing. Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.
9 Do your best to come to me soon. Sala makasi ete oya noki epai na ngai.
10 Demas loved this present world, abandoned me, went to Thessalonica. Crescens went to Galatia, Titus to Dalmatia. Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.
11 Only Luke is with me. Pick up Mark and bring him with you—he's useful to me for service. Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Kamata Malako, mpe boya elongo na ye, pamba te azali na tina mingi epai na ngai mpo na lotomo.
12 I have sent Tychicus to Ephesus. Natindaki Tishike na Efeso.
13 When you come, bring the coat I left with Carpus at Troas, and the scrolls, especially the parchments. Tango okoya, memela ngai kazaka oyo natikaki na Troasi epai ya Karipisi ; memela ngai mpe babuku na ngai, mingi-mingi babuku oyo basala na poso ya banyama.
14 Alexander the coppersmith did me great harm; the Lord will repay him according to his deeds. Alekizandre, monyangwisi bibende, asalaki ngai mabe mingi. Nkolo akofuta ye kolanda misala na ye.
15 Watch out for him yourself, for he strongly opposed our message. Yo mpe sala keba liboso na ye, pamba te atelemelaki makasi mateya na biso.
16 No one stood with me at my first defense—all abandoned me. May it not be charged against them. Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosunga ngai ; bango nyonso basundolaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te !
17 But the Lord stood with me and strengthened me, so through me the message would be fully proclaimed and all nations would hear it. I was rescued from the lion's mouth. Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.
18 The Lord will rescue me from every evil deed and carry me safely into his heavenly kingdom. Glory to him forever and ever. Amen. Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.
19 Greet Prisca and Aquila, and the household of Onesiphorus. Pesa mbote na Prisika, na Akilasi mpe na libota ya Onezifore.
20 Erastus stayed at Corinth, and I left Trophimus, who was ill, at Miletus. Erasite atikalaki na Kolinto, mpe natikaki Trofime azali kobela na Mile.
21 Try hard to come before winter. Eubulus, Pudens, Linus, Claudia, and all the brothers and sisters greet you. Sala makasi ete okoma awa liboso ete tango ya malili makasi ebanda. Ebilisi, Pidesi, Linisi, Klodia mpe bandeko nyonso bapesi yo mbote.
22 The Lord be with your spirit. Grace be with you all. Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo ! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]