Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Timothy 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So then, my child, draw your strength from the grace that is in Christ Jesus. Mwana na ngai, zala makasi kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu-Klisto.
2 And what you heard from me in the presence of many witnesses, entrust to faithful people able to teach others too. Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu.
3 Take your share of suffering like a good soldier of Christ Jesus. Mona pasi elongo na ngai lokola soda ya mpiko ya Yesu-Klisto.
4 No soldier on duty gets tangled in civilian affairs—he wants to please the one who enlisted him. Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.
5 And an athlete is not crowned unless he competes according to the rules. Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu : akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano.
6 The hard-working farmer ought to be the first to receive a share of the crops. Moloni elanga oyo asalaka makasi asengeli kozala moto ya liboso mpo na kobuka bambuma.
7 Think over what I am saying, for the Lord will give you understanding in everything. Kanisaka malamu na tina na makambo oyo nazali koloba, mpe Nkolo akopesa yo makoki ya kososola yango nyonso.
8 Remember Jesus Christ, risen from the dead, a descendant of David, as told in my gospel, Kanisaka Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.
9 for which I suffer, chained like a criminal. But the word of our Father is not chained! Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te.
10 So I endure everything for the sake of the chosen, so they too may gain the salvation in Christ Jesus, with eternal glory. Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
11 This saying is trustworthy: If we have died with him, we will also live with him; Maloba oyo ezali ya solo : Soki tokufi elongo na Ye, tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.
12 if we endure, we will also reign with him; if we disown him, he also will disown us; Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso ;
13 if we are faithless, he remains faithful, for he cannot disown himself. soki tozangi kondima, Ye azalaka kaka Moyengebene, pamba te akoki komiwangana te.
14 Remind them of these things, and warn them before our Father not to quarrel over words—useless, and ruins those who listen. Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi.
15 Do your best to present yourself to our Father approved, a worker unashamed, rightly handling the word of truth. Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.
16 But avoid empty, godless chatter; it leads people further into wickedness, Kima masolo oyo ezanga tina mpe efingaka Nzambe, pamba te ememaka bato oyo bamipesaka na yango mosika na Nzambe.
17 and their talk will spread like gangrene. Among them are Hymenaeus and Philetus, Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Kati na bango, tozali na Imene mpe Filete
18 who wandered away from the truth, claiming the resurrection already happened, and are undermining some people's faith. oyo basila kotika nzela ya solo. Bazali koloba ete lisekwa esili kosalema mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu.
19 Yet our Father's firm foundation stands, sealed: "He knows those who are his," and "Let all who name his name turn from evil." Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »
20 In a large house there are vessels not only of gold and silver, but also of wood and clay—some for honor, some for dishonor. Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.
21 So if anyone purifies himself from these, he becomes a vessel of honor: holy, useful to the Master, ready for every good work. Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.
22 Flee youthful cravings; pursue righteousness, faith, love, and peace with those who call on the Lord from a pure heart. Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
23 Have nothing to do with foolish, ignorant controversies; you know they breed quarrels. Kima masolo ya tembe ya bozoba mpe ezanga tina, pamba te oyebi malamu ete esukaka kaka na koswana.
24 The Lord's servant must not be quarrelsome, but be gentle to all, able to teach, patient when wronged. Mpe ezali malamu te mpo na mosali ya Nkolo kozala moto oyo aswanaka na bato, kasi asengeli nde kozala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki ya kopesa malakisi, ya kokanga motema
25 Gently correcting those who oppose him. Perhaps our Father will grant them repentance to know the truth, mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.
26 and they may sober up, escaping the devil's trap where he has held them captive to do his will. Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]