Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Samuel's word reached all Israel. Israel went to fight the Philistines, camped at Ebenezer; the Philistines camped at Aphek. Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele. Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki.
2 The Philistines lined up against Israel; battle spread, Israel was defeated by the Philistines, who struck down about 4,000 men in the field. Bato ya Filisitia batandamaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Mpe wana bitumba ekomaki makasi, bato ya Filisitia balongaki bato ya Isalaele mpe babomaki na bitumba yango basoda ya Isalaele, pene nkoto minei.
3 When the troops returned to camp, Israel's elders asked, "Why did our Father let the Philistines defeat us today? Let's bring our Father's covenant ark from Shiloh, so he may come among us and save us from our enemies." Tango basoda ya Isalaele bazongaki na molako, bampaka ya Isalaele batunaki : — Mpo na nini Yawe asali ete bato ya Filisitia balonga biso na mokolo ya lelo ? Tokende kozwa Sanduku ya Boyokani ya Yawe, na Silo, mpo ete eya kati na biso mpe ekangola biso na maboko ya banguna na biso.
4 So the people sent to Shiloh and brought the ark of the covenant of the Father of heaven's armies, seated above the cherubim. Eli's two sons, Hophni and Phinehas, were there with the ark of the covenant of our Father. Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.
5 When the ark of our Father's covenant entered the camp, all Israel shouted so loudly the earth shook. Tango kaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na molako, bato nyonso ya Isalaele bagangaki na mongongo makasi, mpe mabele eninganaki.
6 The Philistines heard the shout and asked, "What is this great shout in the Hebrew camp?" Then they knew our Father's ark had entered the camp. Bato ya Filisitia bayokaki koganga wana mpe batunaki : — Koganga nyonso wana elakisi nini kati na molako ya Ba-Ebre ? Wana bayokaki sango ete Sanduku ya Yawe ekoti kati na molako,
7 The Philistines were afraid, for they said, "A god has entered the camp!" Then they said, "We're doomed—this never happened before. bato ya Filisitia babangaki mpe balobaki : — Eh, tobebi na biso ! Nzambe akoti na molako ! Likambo ya boye nanu esalema te !
8 We're doomed! Who will save us from the hand of these mighty gods? These are the gods who struck the Egyptians with every plague in the wilderness. Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.
9 Be strong, Philistines! Be men, or you'll serve the Hebrews as they served you. Be men—fight! Bandeko bato ya Filisitia, boyika mpiko ! Bozala mibali, noki te bokokoma bawumbu ya Ba-Ebre ndenge bango bazalaki bawumbu na bino ! Bozala mibali mpe bobunda !
10 Philistines fought; Israel was defeated, fleeing each to his tent. The slaughter was massive: 30,000 Israelite foot soldiers fell." Boye bato ya Filisitia babundisaki bato ya Isalaele mpe balongaki. Moto nyonso akimaki na ndako na ye ya kapo. Kokweyisama ya bato ya Isalaele ezalaki ya makasi penza : motango ya basoda ya Isalaele, oyo babundaka na makolo mpe bakufaki ezalaki nkoto tuku misato.
11 The ark of our Father was captured, and the two sons of Eli, Hophni and Phinehas, died. Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki.
12 A Benjamite ran from the battle line to Shiloh that day, clothes torn, dust on his head. Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.
13 On arrival, Eli sat on his seat by the road watching, his heart trembling for the ark of our Father. The man entered the city, told it, and the whole city cried out. Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki.
14 When Eli heard the outcry he asked, "What is this uproar?" Then the man hurried over and told Eli. Tango Eli ayokaki koganga yango, atunaki : — Makelele oyo elakisi nini ? Mpe moto yango ayaki na lombangu kopesa sango epai ya Eli.
15 Eli was ninety-eight years old, and his eyes had grown so dim that he could not see. Nzokande Eli azalaki na mibu tuku libwa na mwambe ya mbotama ; miso na ye elembaki makasi, akokaki komona lisusu te.
16 The man told Eli, "I came from the battle, fled the battle line today." Eli asked, "What happened, my son?" Alobaki na Eli : — Nawuti na esika ya bitumba, nawuti kokima kuna kaka lelo. Eli atunaki ye : — Mwana na ngai, makambo nini eleki kuna ?
17 The messenger answered, "Israel fled before the Philistines; also, heavy losses among the troops; also, your two sons Hophni and Phinehas are dead; and the ark of our Father was captured." Moto oyo amemaki sango azongisaki : — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe.
18 As he mentioned our Father's ark, Eli fell backward off his seat at the gate, broke his neck, and died—old and heavy. He had judged Israel forty years. Tango kaka moto wana atangaki kombo ya Sanduku ya Nzambe, Eli akweyaki makalikali longwa na kiti na ye, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe, kingo na ye ebukanaki, mpe akufaki, pamba te azalaki mobange mpe nzoto minene. Akambaki Isalaele mibu tuku minei.
19 His daughter-in-law, Phinehas's wife, was pregnant, near delivery. Hearing our Father's ark seized and her father-in-law and husband dead, she crouched and gave birth, for pain overwhelmed her. Bokilo na ye ya mwasi, mwasi ya Fineasi, azalaki na zemi mpe akomaki pembeni ya kobota. Tango kaka ayokaki sango ete babotoli Sanduku ya Nzambe, ete tata-bokilo na ye mpe mobali na ye bakufi, agunzamaki, abandaki mbala moko pasi ya kobota, mpe abotaki.
20 As she lay dying, the women beside her said, "Don't be afraid, for you've borne a son." But she didn't answer or notice. Lokola akomaki pene ya kokufa, basi oyo bazingelaki ye balobaki na ye : — Kobanga te ! Oboti mwana mobali ! Kasi ye apesaki eyano moko te mpe atiaki makanisi na ye kuna te.
21 She named the boy Ichabod, saying, "The glory has departed from Israel"—over the capture of our Father's ark, her father-in-law, and her husband. Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele ! Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi.
22 She said, "The glory has left Israel, for our Father's ark is captured." Alobaki : « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]