Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The boy Samuel served our Father under Eli. In those days our Father's word was rare; visions were uncommon. Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.
2 One day Eli lay in his usual place. His eyes had grown so weak he could not see. Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye ; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te.
3 The lamp of our Father had not yet gone out; Samuel lay in the temple of our Father, where his ark was. Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki.
4 Then our Father called to Samuel, and Samuel said, "Here I am." Yawe abengaki Samuele, mpe ye azongisaki : — Ngai oyo !
5 He ran to Eli and said, "Here I am; you called me." Eli said, "I did not call you; go back and lie down." So he went and lay down. Akendeki mbangu epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Kasi Eli alobaki na ye : — Nabengi yo te ! Zonga mpe lala. Samuele akendeki mpe alalaki.
6 Again our Father called, "Samuel!" Samuel got up, went to Eli, and said, "Here I am; you called me." "I didn't call, my son," Eli said. "Go back and lie down." Yawe abengaki lisusu : — Samuele ! Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Eli alobaki na ye : — Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala.
7 Samuel did not yet know our Father; the word of our Father had not yet been revealed to him. Nzokande, Samuele ayebaki nanu Yawe te mpe atikalaki nanu te koyoka Yawe koloba na ye ata mbala moko.
8 So our Father called Samuel again, a third time. He got up, went to Eli, and said, "Here I am; you called me." Then Eli realized our Father was calling the boy. Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato ; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki : — Ngai oyo, obengi ngai ! Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali.
9 Eli told Samuel, "Go lie down. If he calls, say, 'Speak, my Father, for your servant is listening.'" So Samuel went and lay down in his place. Boye Eli alobaki na Samuele : — Kende na yo kolala ; mpe soki abengi yo, okoloba : « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka ! » Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye.
10 Then our Father came, stood there, and called as before: "Samuel! Samuel!" Samuel said, "Speak, for your servant is listening." Yawe ayaki mpe atelemaki wana ; abengaki lokola na mbala mosusu : — Samuele ! Samuele ! Samuele azongisaki : — Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka.
11 Then our Father said to Samuel, "Watch—I'm about to do something in Israel that will make both ears of everyone who hears it ring. Yawe alobaki na Samuele : — Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango.
12 That day I will carry out against Eli all I said about his family, start to finish. Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka.
13 I told him I will judge his house forever for the sin he knew of: his sons blasphemed me, and he never stopped them. Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te.
14 So I have sworn to Eli's house: the guilt of Eli's house will never be atoned for by sacrifice or offering." Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo.
15 Samuel lay down until morning, then opened the doors of our Father's house. But he was afraid to tell Eli the vision. Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki.
16 But Eli called him and said, "Samuel, my son." "Here I am," Samuel replied. Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki : — Samuele, mwana na ngai ! Samuele azongisaki : — Ngai oyo !
17 "What did he say to you?" Eli asked. "Don't hide it from me. May our Father punish you severely if you hide from me anything he told you." Eli atunaki ye : — Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.
18 Samuel told him everything and hid nothing from him. Eli said, "It is our Father; let him do what he thinks right." Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki : — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye.
19 Samuel grew up; our Father was with him, letting none of Samuel's words fall to the ground. Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.
20 All Israel, from Dan to Beersheba, knew Samuel was confirmed as a prophet of our Father. Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe.
21 Our Father continued to appear at Shiloh, because there he revealed himself to Samuel through his word. Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]