Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Hannah prayed: "My heart exults in my Father; my horn is high in my Father. My mouth speaks boldly against my enemies, for I rejoice in your rescue. Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.
2 "There is none holy like our Father; there is none besides you; there is no rock like our Father. Moko te azali bule lokola Yawe ; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.
3 "Talk no more so very proudly; let no arrogance come from your mouth, for our Father is our Father of knowledge, and by him deeds are weighed. Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.
4 The bows of the mighty are shattered, but those who stumbled are armed with strength. Tolotolo ya bilombe ebukani, kasi bato na bolembu bazwi makasi.
5 Those who were full hire themselves out for bread, but those who were hungry hunger no more. The barren woman has borne seven, but she who had many children is forlorn. Bato oyo bazalaki na bozwi ebele bakomi koluka mosala mpo na bilei, kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala. Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo, kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te.
6 Our Father puts to death and brings to life; he brings down to the grave and raises up. Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka.
7 Our Father makes poor and makes rich; he brings low and he lifts up. Yawe akomisaka moto mobola, mpe akomisaka moto mozwi ; akitisaka mpe atombolaka.
8 He raises the poor from the dust and lifts the needy from the ash heap, to seat them with princes and give them a throne of honor. For the pillars of the earth belong to our Father, and on them he has set the world. Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.
9 "He guards the feet of his faithful ones, but the wicked are silenced in darkness; for not by strength does anyone prevail. Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.
10 Those who oppose our Father will be shattered; he will thunder against them from heaven. Our Father will judge the ends of the earth; he will give strength to his king and lift high the horn of his anointed." Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.
11 Then Elkanah went home to Ramah, but the boy served our Father before Eli the priest. Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama ; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli.
12 Now the sons of Eli were worthless men; they did not know our Father. Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.
13 This was the priests' custom with the people: when anyone sacrificed, the priest's servant came while the meat boiled, a three-pronged fork in hand. Tala ndenge nini Banganga-Nzambe oyo bazalaki kosala na miso ya bato : tango nyonso moto moko azalaki koya kobonza mbeka, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya na ngonga ya kotumba mbeka yango, azalaki kosimba kanya ya misapi misato na loboko na ye,
14 He'd jab it into the pot, kettle, cauldron, or pan; whatever the fork pulled up, the priest kept for himself. So they treated all Israelites coming to Shiloh. azalaki kokotisa yango na sani, na nzungu, na kikalungu to na mbeki ; mpe azalaki kokamata, mpo na Nganga-Nzambe, eteni nyonso ya nyama oyo ezalaki kokangama na kanya. Ezali ndenge wana nde bana mibali ya Eli bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende kuna na Silo.
15 Even before burning the fat, the priest's servant would come and tell the sacrificer, "Give meat to roast for the priest—he won't take boiled meat, only raw." Kutu, liboso ete mafuta ya mbeka etumbama, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya koloba na moto oyo azalaki kobonza mbeka : « Longolaka libela eteni ya Nganga-Nzambe, pamba te akondima te kozwa na maboko na yo nyama oyo yo moko otumbi ; kasi akondima kaka nyama ya mobesu. »
16 If the man said, "Burn the fat first, then take what you want," he'd answer, "No, give it now, or I'll take it by force." Bongo soki moto yango azongiseli mosali ya Nganga-Nzambe : « Tika ete mafuta etumbama nanu, bongo okozwa, na sima, eteni oyo olingi, » mosali azalaki kozongisa : « Te ! Pesa ngai yango nde sik’oyo, noki te nakozwa yango na makasi. »
17 The young men's sin was very great before our Father, for they despised our Father's offering. Lisumu oyo ya bana mibali ya Eli ezalaki monene na miso ya Yawe, pamba te bazalaki kozwa na limemia te mbeka oyo ebonzami mpo na Yawe.
18 But Samuel served before our Father, a boy dressed in a linen ephod. Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.
19 Each year his mother made him a small robe and brought it when she went up with her husband for the yearly sacrifice. Mibu nyonso, mama na ye azalaki kotongela ye nzambala ya moke, mpe azalaki komemela ye yango tango nyonso azalaki kokende elongo na mobali na ye mpo na kobonza mbeka.
20 Eli would bless Elkanah and his wife: "May our Father give you offspring by this woman instead of what she asked of him and gave to our Father." Then they went home. Eli azalaki kopambola Elikana mpe mwasi na ye na maloba oyo : « Tika ete Yawe apesa yo bana na nzela ya mwasi oyo, mpo na kozwa esika ya mwana oyo asengaki na mabondeli mpe abonzaki epai na Yawe ! » Sima na yango, bazongaki epai na bango.
21 Our Father cared for Hannah; she conceived and bore three sons and two daughters. The boy Samuel grew up before our Father. Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.
22 Eli was very old. He kept hearing all his sons did to all Israel, and how they slept with the women serving at the entrance to the tent of meeting. Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele ; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
23 He asked them, "Why act this way? I hear your evil deeds from all these people. Alobaki na bango : « Mpo na nini bozali kosala makambo mabe boye ? Nazali koyoka bato nyonso kolobela yango.
24 No, my sons; the report I hear is not good—it's spreading among the people of our Father. Te, bana na ngai ! Sango oyo nazali koyoka bato ya Yawe kopanza na tina na bino ezali malamu te.
25 If one sins against another, our Father may mediate for him. But if one sins against our Father, who can intercede for the sinner? Yet they ignored their father's voice, for our Father meant to kill them." Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.
26 The boy Samuel kept growing in stature and in favor with our Father and with people. Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato.
27 A man of our Father came to Eli: "This is what our Father says: 'Did I not clearly reveal myself to your father's house while in Egypt, under Pharaoh's house? Mokolo moko, moto moko na Nzambe ayaki epai ya Eli mpe alobaki na ye : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, namimonisaki te na polele epai ya libota ya tata na yo tango bazalaki na Ejipito, na se ya bokonzi ya Faraon ?
28 "I chose him from all the tribes of Israel as my priest—to go up to my altar, burn incense, wear an ephod before me. I gave your father's house all Israel's fire offerings. Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.
29 Why do you kick at my sacrifice and offering I commanded for my dwelling, and honor your sons over me, growing fat on the best of every offering of my people Israel?' Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?
30 "So our Father of Israel declares: 'I said your house and your father's house would walk before me forever.' But now our Father declares: 'Never! I honor those who honor me; those who despise me I'll treat lightly.' Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.
31 Days are coming when I cut off your strength and your father's house's strength, so none in your house reaches old age. Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
32 You will see distress in my dwelling despite all the good done for Israel; never again an old man in your house. Atako bakosalela Isalaele bolamu, kasi yo okomona pasi kati na Ndako na Ngai ; mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
33 Yet I will not cut off every one of yours from my altar; one will be spared to weep out your eyes and grieve your heart, but all your descendants will die in the prime of life. Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema ; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.
34 Your sign: your two sons, Hophni and Phinehas, will both die on the same day. Mpe makambo oyo ekokweyela bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, ekozala elembo mpo na yo : bango mibale bakokufa mokolo moko.
35 I will raise up for myself a faithful priest who does what's in my heart and mind. I will build him a lasting house; he will walk before my anointed forever. Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.
36 Everyone left in your house will come, bow to him for silver and a loaf of bread, saying, 'Attach me to some priestly office, so I can eat a piece of bread.'" Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba : ‘ Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa. ’ › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]