Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 There was a man from Ramathaim-zophim in the hill country of Ephraim named Elkanah son of Jeroham, son of Elihu, son of Tohu, son of Zuph, an Ephraimite. Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.
2 He had two wives, Hannah and Peninnah. Peninnah had children, but Hannah had none. Elikana azalaki na basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Penina ; » mosusu, « Ana. » Penina azalaki na bana, kasi Ana azalaki na mwana te.
3 Each year he went up from his town to worship and sacrifice to the Father of heaven's armies at Shiloh, where Eli's two sons, Hophni and Phinehas, were priests of our Father. Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe.
4 When Elkanah sacrificed, he gave portions to his wife Peninnah and all her sons and daughters. Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi.
5 But to Hannah he gave a double portion, because he loved her, though our Father had closed her womb. Kasi epai ya Ana, azalaki kopesa biteni yango mbala mibale, pamba te azalaki kolinga ye, atako Yawe akangaki ye mabota.
6 Because our Father had closed her womb, her rival kept provoking her bitterly to make her miserable. Nzokande, lokola Yawe akangaki ye mabota, mbanda na ye azalaki kaka kotiola ye tango nyonso mpo ete atomboka.
7 Year after year, whenever Hannah went up to the house of our Father, Peninnah provoked her, so she wept and would not eat. Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,
8 Her husband Elkanah asked her, "Hannah, why are you crying? Why won't you eat? Why is your heart sad? Am I not more to you than ten sons?" Elikana, mobali na ye, atunaki ye : « Ana, mpo na nini ozali kolela ? Mpo na nini ozali kolia te ? Mpo na nini ozali na mawa boye ? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi ? »
9 After they ate and drank at Shiloh, Hannah rose. Eli the priest sat on the seat by the doorpost of our Father's temple. Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe.
10 Deeply distressed, she prayed to our Father and wept bitterly. Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.
11 She vowed, "Father of heaven's armies, if you will only see your servant's suffering, remember me, not forget your servant, and give her a son, I will give him to our Father all his life, and no razor will touch his head." Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »
12 As she kept on praying before our Father, Eli watched her mouth. Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye.
13 Hannah was praying in her heart; her lips moved but no voice was heard. So Eli thought she was drunk. Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga.
14 He said to her, "How long will you stay drunk? Put away your wine." Eli alobaki na Ana : — Kino tango nini okozala na milangwa ? Longola milangwa na yo.
15 "No, my lord," Hannah answered. "I'm a woman deeply troubled in spirit. I've drunk no wine or strong drink but have poured out my soul before our Father. Ana azongisaki : — Te, nkolo na ngai ! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi ; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe.
16 Don't take your servant for a worthless woman; I've been praying here from my deep anguish and grief." Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo.
17 Eli answered, "Go in peace, and may the Father of Israel grant what you asked of him." Eli azongisaki : — Kende na kimia, mpe tika ete Nzambe ya Isalaele apesa yo, oyo osengi Ye.
18 She said, "May your servant find favor in your eyes." Then the woman went her way and ate, her face no longer downcast. Ana alobaki : — Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo. Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te.
19 Early next morning they rose, worshiped before our Father, and returned home to Ramah. Elkanah was intimate with Hannah his wife, and our Father remembered her. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.
20 In time Hannah conceived and bore a son. She named him Samuel, saying, "Because I asked our Father for him." Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki : « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. »
21 When Elkanah and all his household went up to offer the yearly sacrifice to our Father and fulfill his vow, Na mobu oyo elandaki, Elikana, elongo na libota na ye mobimba, akendeki lisusu kobonzela Yawe mbeka ya mibu nyonso mpe kokokisa elaka na ye.
22 Hannah didn't go. She told her husband, "When the boy is weaned, I'll bring him to appear before our Father, and he'll stay there forever." Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.
23 "Do what seems best to you," her husband Elkanah said. "Stay until you have weaned him; only may our Father keep his word." So Hannah stayed and nursed her son until she weaned him. Elikana, mobali na ye, alobaki : — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela.
24 After weaning him, she took the boy up with her, with a three-year-old bull, about twenty-five pounds of flour, and a jug of wine, and brought him to the house of our Father at Shiloh; and the child was young. Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.
25 They slaughtered the bull and brought the boy to Eli. Sima na bango koboma ngombe mpo na kobonza yango lokola mbeka, bamemaki mwana epai ya Eli.
26 Hannah said, "Oh, my lord, as surely as you live, my lord, I am the woman who stood here beside you, praying to our Father. Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.
27 I prayed for this child, and our Father has granted me what I asked of him. Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.
28 So I give him to our Father. His whole life he is given to him." And he worshiped our Father there. Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]