Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 5 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The Philistines had captured the ark of our Father, and they brought it from Ebenezer to Ashdod. Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi.
2 The Philistines took our Father's ark, brought it into Dagon's temple, and set it beside Dagon. Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni.
3 When Ashdod's people rose early next morning, Dagon lay face-down on the ground before the ark of our Father. They took Dagon and set him back in place. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye.
4 When they rose early the next morning, Dagon had again fallen face-down on the ground before the ark of our Father. This time his head and both hands lay broken off on the threshold; only his body remained. Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki.
5 So to this day Dagon's priests and all who enter Dagon's temple in Ashdod do not step on Dagon's threshold. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.
6 The hand of our Father pressed heavily on the people of Ashdod. He devastated them and struck them with tumors—Ashdod and its surrounding territory. Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu.
7 When the men of Ashdod saw this, they said, "The ark of Israel's God must not stay with us; his hand is hard on us and on Dagon our god." Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye ; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso.
8 They summoned all the Philistine rulers and asked, "What do we do with the ark of the God of Israel?" "Move the ark of the God of Israel to Gath," they answered. So they moved the ark of the God of Israel there. Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. Bazongisaki : — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati.
9 After they moved it, the hand of our Father came against that city too, causing a very great panic. He struck its people, young and old, and tumors broke out on them. Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo.
10 So they sent the ark of our Father to Ekron. But as it arrived, the people of Ekron cried out, "They've brought the ark of the God of Israel to us to kill us and our people!" Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki : — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.
11 So they gathered all the Philistine rulers and said, "Send the ark of Israel's God away; let it return to its place, so it won't kill us and our people." A deadly panic had gripped the whole city; our Father's hand lay very heavy there. Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.
12 Those who did not die were struck with tumors, and the city's cry for help went up to heaven. Bato oyo bakufaki te bazwaki bokono ya pota ya libumu, mpe koganga ya engumba emataki kino na likolo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]