Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The ark of our Father stayed in Philistine territory for seven months. Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia,
2 The Philistines called the priests and fortune-tellers: "What should we do with the ark of the LORD? Tell us how to send it back to its place." bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango : — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe ? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango.
3 They said, "If you send back the ark of Israel's God, don't send it empty, but by all means return him a guilt offering. Then you'll be healed and know why his hand hasn't turned from you." Bazongisaki : — Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu ; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino.
4 "What guilt offering should we return to him?" they asked. They replied, "Five gold tumors and five gold mice, matching the number of the Philistine rulers, since the same plague struck you all and your rulers." Bato ya Filisitia batunaki : — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe ? Bazongisaki : — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo ; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko.
5 "Make images of your tumors and of the mice ravaging the land; give glory to Israel's God. Maybe he'll lift his hand from you, your gods, and your land. Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino ; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino.
6 Why harden your hearts like Egypt and Pharaoh did? Didn't they, after he dealt harshly with them, finally let the people go on their way?" Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito ? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango.
7 "Now get a new cart and two nursing cows never yoked. Hitch the cows to the cart, but take their calves away from them and pen them up. Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika ; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.
8 Take the LORD's ark, put it on the cart, and place in a box beside it the gold objects you're returning to him as a guilt offering. Then send it off. Bokamata Sanduku ya Yawe mpe botia yango na likolo ya shario. Pembeni ya Sanduku ya Yawe, botia kati na mwa sanduku moko ya moke biloko ya wolo oyo bokobonzela Yawe lokola bambeka mpo na masumu. Sima, botika yango kokende.
9 Watch: if it goes up the road to its own territory, to Beth-shemesh, he brought this great disaster on us. If not, we'll know his hand didn't strike us—it was chance." Kasi bokotala yango malamu : soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango ; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku.
10 The men did so: took two nursing cows, tied them to the cart, penned their calves at home. Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango : bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango.
11 They put the ark of our Father and the box holding gold mice and images of their tumors on the cart. Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario ; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu.
12 The cows went straight toward Beth-shemesh, staying on one road, mooing, turning neither right nor left. Philistine rulers followed them to Beth-shemesh's border. Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela ; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi.
13 Beth-shemesh people, harvesting wheat in the valley, looked up, saw the ark, and rejoiced to see it. Na eleko yango, bato ya Beti-Shemeshi bazalaki kobuka ble, na lubwaku. Bongo tango batombolaki miso mpe bamonaki Sanduku, basepelaki makasi.
14 The cart reached Joshua's field at Beth-shemesh and stopped beside a large stone. They split the cart's wood and offered the cows as a burnt offering to our Father. Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.
15 The Levites took down our Father's ark and the box beside it holding the gold objects, setting them on the large stone. That day Beth-shemesh's people offered burnt offerings and sacrifices to our Father. Balevi bakitisaki Sanduku ya Yawe elongo na mwa sanduku ya moke oyo kati na yango ezalaki na biloko ya wolo, mpe batiaki yango na likolo ya libanga monene. Na mokolo wana, bato ya Beti-Shemeshi babonzaki bambeka ya kotumba mpe makabo epai na Yawe.
16 The five rulers of the Philistines saw all this and returned to Ekron that same day. Bakambi yango mitano ya bato ya Filisitia bamonaki makambo nyonso wana mpe bazongaki na Ekroni kaka mokolo wana.
17 Gold tumors the Philistines returned to our Father as a guilt offering: one each for Ashdod, Gaza, Ashkelon, Gath, and Ekron. Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni.
18 The gold mice numbered all the Philistine towns of the five rulers—fortified towns and open villages alike. The large stone where they set the ark of our Father stands as a witness today in the field of Joshua of Beth-shemesh. Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela : kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi.
19 But our Father struck down some men of Beth-shemesh for looking into the ark of the covenant, killing seventy of them. The people mourned because he had struck them with so great a blow. Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.
20 The men of Beth-shemesh said, "Who can stand before our Father, this holy God? And to whom will the ark go up away from us?" Bato ya Beti-Shemeshi balobaki : « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule ? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso ? »
21 They sent messengers to Kiriath-jearim's people: "The Philistines returned our Father's ark. Come down, bring it up to you." Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi : « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe ; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]