Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The men of Kiriath-jearim came, took the ark of our Father, brought it to Abinadab's house on the hill, and dedicated his son Eleazar to guard the ark of our Father. Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.
2 From the day the ark came to rest at Kiriath-jearim, a long time passed—twenty years—and the whole house of Israel mourned and sought after our Father. Wuta mokolo Sanduku ya Yawe ekomaki na Kiriati-Yearimi, elekaki mikolo ebele : mibu pene tuku mibale. Mpe bato nyonso ya Isalaele bayokaki posa ya kozonga epai na Yawe.
3 Then Samuel spoke to the whole house of Israel: "If you're returning to our Father with all your heart, remove the foreign gods and the Ashtaroth from among you, set your hearts on our Father, and serve him alone—and he will rescue you from the Philistines." Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »
4 So Israel's people removed the Baals and Ashtaroth, and served our Father alone. Bato ya Isalaele balongolaki kati na bango banzambe Bala mpe bikeko ya Asitarite, mpe basalelaki kaka Yawe.
5 Then Samuel said, "Gather all Israel at Mizpah, and I will pray to our Father for you." Samuele alobaki na bango : « Bosangisa bato nyonso ya Isalaele, na Mitsipa, mpe ngai nakosambela Yawe mpo na bino. »
6 They gathered at Mizpah, drew water, poured it before our Father, fasted that day, and confessed, "We have sinned against our Father." Samuel judged Israel at Mizpah. Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.
7 The Philistines heard that the Israelites had gathered at Mizpah, and the Philistine rulers marched up against Israel. The Israelites heard, and feared the Philistines. Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.
8 The Israelites said to Samuel, "Don't stop crying out to our Father for us, so he'll save us from the Philistines." Bato ya Isalaele balobaki na Samuele : « Kotika te kosambela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso mpo ete abikisa biso na maboko ya bato ya Filisitia. »
9 Samuel took a nursing lamb and offered it as a whole burnt offering to our Father. Samuel cried out to our Father for Israel, and our Father answered him. Samuele akamataki mwana meme ya mobali, oyo ezalaki nanu komela mabele, mpe abonzaki yango mobimba lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. Abelelaki Yawe mpo na Isalaele, mpe Yawe ayokaki losambo na ye.
10 As Samuel offered the burnt offering, the Philistines advanced to attack Israel. But that day our Father thundered with a great voice against the Philistines, threw them into panic, and they were defeated before Israel. Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.
11 Israel's men left Mizpah, chased the Philistines, and struck them down to below Beth-car. Bato ya Isalaele babimaki na Mitsipa, balandaki bato ya Filisitia kino na se ya Beti-Kari mpe babomaki bango.
12 Then Samuel took a stone, set it up between Mizpah and Shen, and named it Ebenezer, saying, "Up to now our Father has helped us." Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni ; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri » mpo na koloba : « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. »
13 So the Philistines were subdued and did not invade Israel's territory again; our Father's hand opposed the Philistines throughout Samuel's lifetime. Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.
14 Israel got back the cities Philistines had taken, from Ekron to Gath, recovering its territory from Philistine hands. Israel also had peace with the Amorites. Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori.
15 Samuel judged Israel all the days of his life. Samuele akambaki Isalaele mikolo nyonso ya bomoi na ye.
16 He went year by year, circuiting Bethel, Gilgal, and Mizpah, judging Israel at all these places. Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana.
17 So he went back to Ramah, his home, and judged Israel there. There he built an altar to our Father. Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]