Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now when Samuel grew old, he appointed his sons as judges over Israel. Tango Samuele akomaki mobange, aponaki bana na ye ya mibali mpo ete bazala basambisi kati na Isalaele.
2 His firstborn son was Joel and his second was Abijah; they served as judges in Beersheba. Kombo ya mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki « Joeli, » mpe ya mibale, « Abiya. » Bazalaki kosala mosala na bango na Beri-Sheba,
3 His sons did not follow his ways but chased dishonest gain, took bribes, and perverted justice. kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango : bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te.
4 Then all the elders of Israel gathered together and came to Samuel at Ramah. Mpo na yango, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele basanganaki elongo mpe bakendeki epai ya Samuele, na Rama.
5 They said to him, "You're old, and your sons don't follow your ways. Now appoint a king to rule us, like all the nations." Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »
6 Samuel was unhappy when they said, "Give us a king to govern us," and prayed to our Father. Kasi tango balobaki : « Pesa biso mokonzi oyo akokamba biso, » Samuele asepelaki na likambo yango te ; boye asambelaki Yawe.
7 Then our Father told Samuel, "Listen to the people in all they say to you; they haven't rejected you; they've rejected me as their king. Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango.
8 As, since I brought them from Egypt until today, they've abandoned me, serving other gods—so they treat you. Bazali kosala yo ndenge kaka basalaki Ngai, banda mokolo oyo nabimisaki bango na Ejipito kino lelo : basundolaki Ngai mpe basalelaki banzambe mosusu.
9 Now listen to them, but warn them firmly and tell them how their king will rule." Sik’oyo, yoka bango ; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. »
10 So Samuel told the people asking him for a king all the words of our Father. Samuele ayebisaki bato oyo bazalaki kosenga ye mokonzi maloba nyonso ya Yawe.
11 He said, "This is what the king who reigns over you will do: he will take your sons for his chariots and horsemen, to run ahead of them. Alobaki na bango : — Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala : Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda ; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi.
12 He will appoint for himself commanders of thousands and of fifties, some to plow his ground and reap his harvest, and others to make his weapons and chariot gear. Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.
13 He will take your daughters to be perfumers and cooks and bakers. Akokamata bana na bino ya basi mpo ete basalaka malasi, balambaka bilei mpe mapa.
14 He will take your best fields, vineyards, and olive groves and give them to his servants. Akokamata bilanga na bino ya vino mpe ya olive oyo eleki kitoko, mpe akopesa yango epai ya basali na ye.
15 He will take a tenth of your grain and vineyards, giving it to his officials and servants. Akokamata eteni ya zomi ya milona na bino mpe ya bilanga na bino ya vino, mpe akopesa yango epai ya kalaka na ye ya lokumu mpe epai ya basali na ye.
16 He will take your male and female servants, best young men, and donkeys for his work. Bongo, kati na basali na bino ya mibali, basali na bino ya basi, bilenge na bino mpe ba-ane na bino, akokamata ba-oyo baleki kitoko mpo na misala na ye.
17 He will take a tenth of your flocks, and you yourselves will become his slaves. Akokamata eteni ya zomi ya bameme na bino, mpe bino moko bokokoma bawumbu na ye.
18 When that day comes, you will cry out because of the king you chose for yourselves, but our Father will not answer you on that day." Bongo na mokolo wana, tango bokobanda kolelalela mpo na mokonzi oyo bino moko bokomiponela, na mokolo yango, Yawe akoyanola bino ata moke te.
19 But the people refused to listen to Samuel. They said, "No! We want a king over us, Kasi bato baboyaki koyokela Samuele, balobaki : — Te ! Biso tolingi kaka mokonzi.
20 so we can be like all the nations, with our king ruling us, leading us out, fighting our battles." Na bongo, biso mpe tokozala lokola bikolo mosusu. Mokonzi na biso akokamba biso, akobima liboso na biso mpe akotambolisa biso na bitumba.
21 When Samuel heard all the words of the people, he repeated them to our Father. Tango Samuele ayokaki maloba nyonso ya bato, amemaki yango liboso ya Yawe.
22 Our Father said to Samuel, "Listen to them; give them a king." Samuel then said to Israel's men, "Go, each to your own town." Mpe Yawe alobaki na Samuele : « Yokela bango mpe pesa bango mokonzi ! » Bongo Samuele alobaki na bato ya Isalaele : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]