Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 9 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 There was a man of Benjamin named Kish, son of Abiel, son of Zeror, son of Becorath, son of Aphiah, a Benjamite, a man of wealth and standing. Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame.
2 He had a son named Saul, a handsome young man—no Israelite was more handsome; from the shoulders up he stood taller than anyone. Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso.
3 The donkeys of Kish, Saul's father, were lost, so Kish said to his son Saul, "Take one of the servants with you and go look for the donkeys." Mokolo moko, ba-ane ya tata na ye, Kishi, ebungaki ; mpe Kishi alobaki na mwana na ye, Saulo : « Kamata mosali moko ya mobali kati na basali mpo ete akende elongo na yo koluka ba-ane. »
4 He crossed the hill country of Ephraim and the land of Shalishah, but they did not find them. They passed through the land of Shaalim, but the donkeys were not there. He crossed the land of Benjamin, but still they did not find them. Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha ; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te ; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te.
5 When they reached the land of Zuph, Saul said to the servant with him, "Come, let's turn back, or my father will stop worrying about the donkeys and start worrying about us." Tango bakomaki na mokili ya Tsufi, Saulo alobaki na mosali oyo azalaki elongo na ye : — Yaka, tozonga ; noki te tata na ngai akotika kokanisa ba-ane, kasi akokoma komitungisa mpo na biso.
6 But the servant said, "Look, this town has a man of our Father, held in honor; all he says surely comes true. Let's go there now; maybe he can tell us which way to take." Mosali azongisaki : — Zela moke ! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe ; azali penza moto ya lokumu ; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.
7 Saul said to his servant, "But if we go, what can we bring the man? The bread in our sacks is gone, and no gift for the man of our Father. What do we have?" Saulo alobaki na mosali na ye : — Likambo te ! Tokende epai na ye ! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe ? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te ; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini ?
8 The servant answered Saul again, "Look, I have a small silver coin. I'll give it to the man of our Father so he tells us our way." Mosali azongiselaki Saulo : — Tala, nazali na mbongo moko ya palata ; nakopesa yango epai ya moto na Nzambe, mpe akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda.
9 (Formerly in Israel, anyone going to consult our Father would say, "Let's go to the seer," for today's prophet was then called a seer.). Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba : « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. »
10 "Good," Saul replied. "Let's go." So they went to the town where the man of our Father was. Saulo alobaki na mosali na ye : — Malamu ! Tokende ! Boye, bakendeki na engumba epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda.
11 As they climbed the hill to the town, they met young women coming out to draw water and asked, "Is the seer here?" Wana bazalaki komata ngomba oyo ekenda na engumba, bakutanaki na bana basi oyo bazalaki kobima mpo na koluka mayi. Batunaki bango : — Boni, ezalaka awa na moto oyo azwaka bimoniseli ?
12 "He is," they said. "Just ahead of you. Hurry, he came to town today because the people have a sacrifice on the high place. Bazongiselaki ye : — Iyo ! Azali liboso na bino. Kasi bosala noki ; awuti kokoma kaka sik’oyo kati na engumba na biso, pamba te bato bakobonza lelo mbeka, na esambelo ya likolo ya ngomba.
13 As soon as you enter the town you'll find him before he goes up to the high place to eat. The people won't eat until he comes, for he must bless the sacrifice; only then will the guests eat. Go up now—you'll find him at once." Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia ; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te : asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo.
14 They went up to the town. As they entered, Samuel came toward them, heading up to the high place. Boye bakendeki na engumba ; mpe wana bazalaki kokota kati na yango, Samuele abimaki liboso na bango tango azalaki kokende na esambelo ya likolo ya ngomba.
15 Now the day before Saul came, our Father had revealed this to Samuel: Nzokande, mokolo moko liboso ete Saulo akoma, Yawe amonisaki likambo yango epai ya Samuele.
16 "About this time tomorrow I will send you a man from the land of Benjamin. Anoint him leader over my people Israel; he will save my people from the Philistines' hand, for I have seen my people, and their cry has reached me." Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »
17 When Samuel saw Saul, our Father told him, "Here is the man I spoke of; this one will govern my people." Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye : « Tala moto oyo nalobelaki yo ; ye nde akokonza bato na Ngai. »
18 Saul approached Samuel in the gateway and said, "Please tell me where the seer's house is." Saulo apusanaki pembeni ya Samuele, na ekuke ya engumba, mpe atunaki ye : — Nabondeli yo, okoki kolakisa ngai ndako ya moto oyo azwaka bimoniseli ?
19 "I am the seer," Samuel replied. "Go up ahead of me to the high place. Today you'll eat with me; in the morning I'll send you off and tell you all that's on your heart. Samuele azongiselaki Saulo : — Ngai oyo moto oyo azwaka bimoniseli. Kende liboso na ngai, na esambelo ya likolo ya ngomba ; pamba te, lelo, okolia elongo na ngai. Bongo lobi na tongo, nakotika yo kozonga, mpe nakoyebisa yo makambo nyonso oyo ezali kati na motema na yo.
20 The donkeys you lost three days ago have been found, so don't worry about them. And who owns all that Israel treasures, if not you and all your father's house?" Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele ? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo.
21 Saul replied, "Am I not a Benjamite, from Israel's smallest tribe, and my clan the least of Benjamin's clans? Why say this to me?" Saulo azongisaki : — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ?
22 Then Samuel brought Saul and his servant into the hall, seating them at the head of the invited guests—about thirty. Samuele amemaki Saulo elongo na mosali na ye, akotisaki bango na esika ya feti mpe avandisaki bango liboso ya babengami : bazalaki bato pene tuku misato.
23 Samuel told the cook, "Bring the portion I gave you, the one I said to set aside." Samuele alobaki na moto oyo azalaki kolamba : « Yaka na ndambo ya biloko oyo nayebisaki yo ete otia yango pembeni. »
24 The cook lifted the thigh and what was on it and set it before Saul. Samuel said, "Here is what was kept for you. Eat, for it was reserved for you for this occasion, ever since I invited these guests." So Saul ate with Samuel that day. Moto oyo azalaki kolamba azwaki mopende mpe nyonso oyo ekangani na yango, mpe atiaki yango liboso ya Saulo. Samuele alobaki na Saulo : « Tala ndambo ya biloko oyo babombelaki yo. Lia yango, pamba te babombelaki yo yango wuta tango nabengisaki bato. » Boye, na mokolo wana, Saulo aliaki elongo na Samuele.
25 They came down from the high place into town, and Samuel spoke with Saul on the roof. Bongo balongwaki nzela moko na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kokita na engumba, mpe Samuele asololaki na Saulo, na veranda ya ndako na ye.
26 They rose early, and at daybreak Samuel called to Saul on the roof, "Get up, and I'll send you off." Saul got up, and the two of them, he and Samuel, went out into the street together. Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye : « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele.
27 As they went down toward the town's edge, Samuel told Saul, "Send the servant on ahead"—and he went—"but you stay a while, so I can tell you the word of our Father." Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo : « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo : « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]