Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Samuel took the flask of oil, poured it on Saul's head, kissed him, and said, "Hasn't our Father anointed you ruler over his inheritance? Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?
2 When you leave me today, you'll meet two men by Rachel's tomb in Zelzah, in Benjamin's territory. They'll say: 'The donkeys you sought are found; your father no longer worries about them, now he worries about you, asking, "What should I do about my son?"' Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › »
3 From there, go on to the oak of Tabor, where three men going up to our Father at Bethel meet you—one with three young goats, one with three loaves, one with a skin of wine. Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba ; mosusu, biteni misato ya mapa ; mpe mosusu, molangi ya vino.
4 They will greet you and give you two loaves of bread, which you accept from them. Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango.
5 Then you'll come to Gibeah of our Father, where a Philistine garrison is; entering the town, you'll meet a band of prophets coming down from the high place with harp, tambourine, flute, and lyre before them, prophesying. Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.
6 The Spirit of our Father will rush on you; you'll prophesy with them and become another man. Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu.
7 When these signs come to you, do what your hand finds, for our Father is with you. Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
8 Go down ahead of me to Gilgal. I will surely come down to you to offer burnt offerings and sacrifice peace offerings. Wait seven days until I come to you and tell you what to do." Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo ; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
9 When Saul turned from Samuel, our Father changed his heart, and all these signs happened that day. Tango kaka Saulo abalukaki mpo na kotika Samuele, Nzambe abongolaki motema ya Saulo, mpe bilembo nyonso ekokisamaki mokolo wana kaka.
10 At Gibeah a band of prophets met him, our Father's Spirit rushed on him, and he prophesied among them. Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye ; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango.
11 Everyone who knew him before saw him prophesying with the prophets, and people asked each other, "What happened to Kish's son? Is Saul also among the prophets?" Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki : « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi ? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »
12 Someone there asked, "Who's their father?" So it became a saying: "Is Saul also among the prophets?" Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki : « Bongo nani azali motambolisi na bango ? » Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo : « Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »
13 When he had finished prophesying, he went up to the high place. Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba.
14 Saul's uncle asked him and his servant, "Where did you go?" "To seek the donkeys," he said. "Seeing they weren't there, we came to Samuel." Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye : — Bokendeki wapi ? Saulo azongisaki : — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.
15 Saul's uncle said, "Please tell me what Samuel said to you." Noko ya Saulo alobaki lisusu : — Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino.
16 Saul told his uncle, "He assured us the donkeys were found." But Saul didn't tell his uncle what Samuel said about the reign. Saulo azongiselaki noko na ye : — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.
17 Then Samuel summoned the people to our Father at Mizpah, Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe
18 he told the Israelites, "This is what our Father of Israel says: 'I brought Israel up from Egypt and rescued you from the Egyptians and all the kingdoms oppressing you.' mpe alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. ›
19 But today you've rejected your Father, who himself saves you from all your troubles and distress, and told him, 'No—put a king over us.' Now present yourselves before our Father by tribe and clan." Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »
20 When Samuel brought all the tribes of Israel forward, Benjamin's tribe was chosen by lot. Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki.
21 He brought Benjamin's tribe forward by clan; the Matrite clan was chosen, then Saul son of Kish was chosen. They looked for him, but couldn't find him. Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te.
22 So they asked our Father again, "Has the man come here yet?" And our Father said, "He's hidden among the baggage." Boye, batunaki lisusu Yawe : — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? Yawe azongisaki : — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.
23 They ran and took him from there. Standing among the people, he was taller than everyone, from the shoulders up. Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato ; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi.
24 Samuel said to all the people, "See whom our Father chose? None is like him among all the people." All the people shouted, "Long live the king!" Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi !
25 Samuel told the people the monarchy's rules, wrote them on a scroll, set it before our Father. Then Samuel sent all the people away, each to his own home. Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye.
26 Saul too went home to Gibeah, and with him went warriors whose hearts our Father had touched. Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye.
27 But some worthless men said, "How can this man save us?" They despised him, brought him no gift. But Saul said nothing. Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]