Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Samuel 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Nahash the Ammonite went up and camped against Jabesh-gilead. All the men of Jabesh said to Nahash, "Make a treaty with us, and we'll serve you." Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi : — Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo.
2 Nahash the Ammonite answered, "I will make this treaty with you: I gouge out everyone's right eye, and bring disgrace on all Israel." Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki : — Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni.
3 Jabesh's elders told him, "Give us seven days to send messengers through all Israel's territory. If no one saves us, we will surrender to you." Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye : — Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele ; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo.
4 The messengers reached Gibeah of Saul, told the people what happened, and all of them wept aloud. Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi.
5 Just then Saul came in from the field, behind his oxen. He asked, "What is wrong with the people? Why are they weeping?" So they told him the news of the men of Jabesh. Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki : « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye ? » Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki.
6 When Saul heard these words, the Spirit of our Father rushed upon him; his anger burned fiercely. Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi.
7 He took a yoke of oxen, cut them in pieces, and sent them through all Israel's territory by messengers: "This will be done to the oxen of anyone who does not come out after Saul and Samuel." Then dread of our Father fell on the people, and they came out as one man. Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.
8 He counted them at Bezek: 300,000 Israelites, 30,000 men of Judah. Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato.
9 They told the messengers who came, "Say to the men of Jabesh-gilead: Tomorrow, by the time the sun is hot, you will be rescued." The messengers went and told the men of Jabesh, and they were glad. Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi.
10 The men of Jabesh said, "Tomorrow we will surrender to you; do to us whatever you like." Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni : « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. »
11 Next day Saul split the people into three companies. At the morning watch they entered the camp and struck down the Ammonites until the day's heat; the survivors scattered so that no two remained together. Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko.
12 The people said to Samuel, "Who asked, 'Will Saul reign over us?' Hand over those men—we will kill them." Bato balobaki na Samuele : — Wapi bato oyo bazalaki koloba : « Boni, Saulo akoyangela biso ? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango.
13 But Saul said, "No one will be killed today, for today our Father has brought salvation to Israel." Kasi Saulo alobaki : — Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo.
14 Samuel said to the people, "Come, let's go to Gilgal and renew the reign there." Samuele alobaki na bato : — Boya ! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo.
15 All the people went to Gilgal and made Saul king there before our Father. There they sacrificed peace offerings before our Father, and Saul and all the men of Israel rejoiced greatly. Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]