Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 20 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 At the turn of the year, when kings march to war, Joab led the army out and devastated the Ammonites' land, then came and besieged Rabbah, while David stayed in Jerusalem. Joab struck Rabbah and tore it down. Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Joabi akambaki mampinga na bitumba mpe abebisaki mokili ya bato ya Amoni ; bongo akendeki kotonga molako liboso ya Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi. Joabi abundisaki engumba Raba mpe apanzaki yango.
2 David took the crown from the head of their king. It weighed about seventy-five pounds of gold and was set with a precious stone, and it was placed on David's head. He also carried off a great amount of plunder from the city. Davidi alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Bamonaki ete esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
3 He brought out its people and put them to work with saws, iron picks, and axes. David did the same to all the Ammonite cities. Then David and his whole army returned to Jerusalem. Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni ; bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
4 After this, war broke out with the Philistines at Gezer. At that time Sibbecai the Hushathite killed Sippai, one of Rapha's descendants, and the Philistines were subdued. Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gezeri. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Sipayi, moko kati na bakitani ya Rafa ; mpe bato ya Filisitia bayokisamaki soni.
5 War broke out again with the Philistines. Elhanan son of Jair killed Lahmi, brother of Goliath the Gittite, whose spear shaft was as thick as a heavy wooden beam. Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia ; mpe Elanani, mwana mobali ya Yairi, abomaki Lami, ndeko mobali ya Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
6 Once more war broke out at Gath, where there was a huge man, six fingers on each hand and six toes on each foot, twenty-four in all—also born to Rapha. Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
7 When he taunted Israel, Jonathan son of Shimea, David's brother, struck him down. Atiolaki Isalaele ; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
8 These were born to Rapha in Gath, and fell by the hand of David and his servants. Bato wana bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]